Likambo moko monene na losambo na biso!
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika ebimi na Lingala
NA MWAMITANO 3 Yuli 2009, likambo moko monene esalemaki na losambo na biso: Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika ebimaki na Lingala.
Sikoyo, Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika ebakisami na Babiblia mosusu oyo bato oyo balingaka Nzambe basalelaka na mboka R.D.Congo. Kasi, mpo na nini kobimisa Biblia mosusu? Nani abimisi yango? Mpo na nini okoki kondima ete Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika ezali libongoli moko ya malamu?
Mpo na nini mabongoli mingi boye?
Na bambula oyo euti koleka bato babongoli mpe babimisi Babiblia ebele. Na kati ya mabongoli yango, mosusu esali ete Liloba ya Nzambe ebima na minɔkɔ mosusu mpo na mbala ya liboso. Kasi, Babiblia mosusu ya sika ebimi na minɔkɔ oyo Biblia ezalaka banda kala. Mpo na nini? Buku ya Sakae Kubo ná Walter Specht, oyo ezali na motó ya likambo Mabongoli ebele boye! (na Lingelesi), epesi eyano oyo: “Ezali na libongoli moko te ya Biblia oyo bakoki koloba ete esukisi mabongoli nyonso. Lokola bato bazali se kokóma na boyebi mingi ya makambo ya Biblia mpe minɔkɔ ezali se kobongwana, mabongoli ya sika ekokoba kaka kobima.”
Na ekeke oyo, bato bakómi na boyebi mingi ya Ebre, Grɛki mpe Aramɛyɛ—minɔkɔ oyo bakomaki na yango Biblia na ebandeli. Lisusu, bamonaki bamaniskri ya kalakala ya Biblia, oyo elobeli makambo na bosikisiki koleka bamaniskri oyo bato oyo babongolaki Biblia kala basalelaki. Yango wana, bakoki lelo oyo kobongola Liloba ya Nzambe na bosikisiki koleka ndenge ebongolamaki liboso!
Zulunalo moko (The Atlantic Monthly) elobaki boye ntango elobelaki misala oyo ekɔtisaka mbongo: “Kobimisa Biblia ezali mosala moko oyo ekɔtisaka mbongo mingi—mingi mpenza.” Mpe ntango mosusu lokola bato bazalaka na mposa ya kobimisa Biblia oyo ekotɛkama mingi koleka, batyaka mpenza likebi te na bosikisiki ya maloba. Na Biblia moko ya sika, babimisi na yango balongoli mpenza bavɛrsɛ mosusu oyo esepelisaka bango te. Na Biblia mosusu, baluki kobongisa maloba oyo bango bamonaki ete ekobɛtisa batángi ya lelo libaku. Na ndakisa, babongoli mosusu, mpo na koluka kosepelisa bato oyo balukaka ete basi bázala ndenge moko na mibali, babengi Nzambe “Tata-Mama.”
Bazali kolimwisa nkombo ya Nzambe
Likambo ya mabe mingi koleka ezali oyo bazali kosala na nkombo ya Nzambe—Yehova. (Bato mosusu ya mayele babongolaka yango: “Yawe.”) Na bamaniskri ya kalakala, nkombo ya Nzambe ekomami na balɛtrɛ minei ya Ebre oyo ekoki kobongolama YHWH to JHVH. Nkombo yango ekomamá mbala soki 7 000 kaka na eteni oyo babengi Kondimana ya Kala. (Kobima 3:15; Nzembo 83:18) Emonani mpenza ete Mozalisi na biso alingaki ete bato oyo bazali kosambela ye báyeba mpe básalela nkombo wana!
Nzokande eleki lelo bankama ya bambula, Bayuda batikaki kotánga nkombo ya Nzambe mpo na biyambayamba na bango. Na nsima, biyambayamba wana ekɔtaki mpe epai ya bakristo. (Talá mpe Misala 20:29, 30; 1 Timote 4:1.) Babongoli ya Biblia bakómaki kolongola nkombo ya Nzambe mpe kotya liloba “Nkolo” na esika na yango. Lelo oyo, na Babiblia mingi, bazali kolongola mpenza nkombo ya Nzambe. Na Babiblia mosusu ya sika na Lingala, balongoli kutu liloba “nkombo” na Yoane 17:6, esika Yesu alobi: “Namonisi nkombo na yo polele.” Biblia na Lingala ya lelo oyo ebongoli vɛrsɛ yango boye: “Nalakisi bango lokumu na yo.”
Mpo na nini bayini nkombo ya Nzambe makasi boye? Zulunalo moko ya Lingelesi (Practical Papers for the Bible Translator) [Volimi 43, nimero 4, 1992] oyo ebimisamaka na Alliance biblique universelle (ABU) oyo etambwisaka misala mingi ya kobongola Biblia na mokili mobimba, elobi boye na lisolo moko oyo yango ebimisaki: “Lokola YHWH ezali mpenza nkombo ya Nzambe, ndenge malamu ya kobongola yango ezali nde ya kokoma yango kaka ndenge ezali.” Kasi, lisolo yango ekebisaki ete: “Ata bongo, ezali na makambo mosusu oyo tosengeli kobosana te.”
Tosengeli mpenza kondima “makambo” yango? Zulunalo yango elobi ete bato mosusu ya mayele balobaka ete: “Soki toyebisi nkombo lokola Yawe, [epai ya bato oyo bazali bakristo te] ekoki kobulunganisa . . . , bakoki kokanisa ete ‘Yawe’ azali Nzambe moko mopaya, to Nzambe moko ya sika, oyo ayebani te mpe akeseni na Nzambe oyo bango bayebi.” Nzokande, Biblia emonisi polele ete Yehova akeseni na banzambe oyo bapakano basambelaka!—Yisaya 43:10-12; 44:8, 9.
Bato mosusu ya mayele balobaka ete ntango bazali kolongola nkombo ya Nzambe mpo na kotya titre “NKOLO,” bazali kaka kolanda ndenge bato basalaka banda kala. Kasi, Yesu amonisaki ete kolanda mimeseno oyo ekumisaka Nzambe te ezali mabe. (Matai 15:6) Kutu, likanisi ya kotya titre na esika ya nkombo euti na Biblia te. Yesu Kristo azali na batitre ebele, na ndakisa “Liloba ya Nzambe” mpe “Mokonzi ya bakonzi.” (Emoniseli 19:11-16) Tokoki nde kolongola nkombo ya Yesu mpe kotya batitre wana na esika na yango?
Lisolo mosusu ya zulunalo yango elobi boye: “Ebongi mpenza te kosalela nkombo ‘Yehova.’” Mpo na nini? “Mbala mingi, bato ya mayele balobaka ete nkombo ‘Yawe’ nde eyokani na ndenge oyo bazalaki kobenga nkombo yango na ebandeli.” Nzokande, bankombo mingi oyo toyebi na Biblia, na ndakisa Yirimia, Yisaya mpe Yesu, ekomamaka mpenza te ndenge bazalaki kotánga yango na Ebre (Yir·meyahʹ, Yeshaʽ·yaʹhu, mpe Yehoh·shuʹaʽ). Lokola nkombo “Yehova” ezali ndenge moko ya kobongola nkombo ya Nzambe oyo endimami—mpe bato mingi bayebi yango—koboya kosalela nkombo yango ebongi soki moke te. Ya solo, soki bato yango bazali koboya kosalela nkombo ya Nzambe ezali kaka mpo bazali kolanda oyo motema na bango mpe makanisi na bango elingi, kasi tokoloba te ete ezali likambo oyo bato nyonso ya mayele bandimi.
Kasi, yango ezali kaka te likambo ya bato ya mayele. Na ndakisa, mpo na komonisa mabe ya kolongola nkombo ya Nzambe na Babiblia oyo ezalaki na nkombo yango liboso, moto moko ya Alliance biblique universelle (ABU) na Inde akomaki boye: “Bato ya losambo ya Hindu bakipaka batitre ya Nzambe te; balingaka nde koyeba nkombo mpenza ya Nzambe, soki te, bakokangama na ye te.” Ɛɛ, ezali mpe bongo mpo na bato nyonso oyo balukaka koyeba Nzambe. Koyeba nkombo ya Nzambe ezali na ntina mingi mpo na koyeba ete azali kaka nguya moko boye te, kasi azali mpenza moto oyo tokoki koyeba. (Kobima 34:6, 7) Yango wana Biblia elobi: “Moto nyonso oyo akobelela nkombo ya Yehova akobika.” (Baroma 10:13) Bato oyo basambelaka Nzambe basengeli kosalela nkombo na ye!
Libongoli oyo ezali kokumisa Nzambe
Yango wana, ezalaki likambo moko ya monene na 1950, ntango Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami ya Grɛki ya bokristo ebimaki mpo na mbala ya liboso na Lingelesi. Na bambula oyo elandaki, mikanda ya eteni oyo babengaka Kondimana ya Kala, to Makomami ya Ebre, ezalaki kobima ndambondambo. Na 1961, Biblia mobimba ebimaki na Lingelesi. Likambo ya ntina mingi ezali ete Libongoli ya Mokili ya Sika ebongoli nkombo ya Nzambe na Yehova na bisika nyonso; nkombo yango ezali mbala soki 7 000 na kati ya “Kondimana ya Kala.” Mpe likambo ya ntina koleka, bazongisi nkombo ya Nzambe na bisika 237 na “Kondimana ya Sika,” to na Makomami ya Grɛki ya bokristo.
Kozongisa nkombo wana ezali kaka kokumisa Nzambe te, kasi esalisi mpe bato báyeba makambo mingi lisusu. Na ndakisa, babongoli mingi babongolaka Matai 22:44 boye: “Nkolo alobaki na Nkolo na ngai.” Kasi, nani mpenza alobi na nani? Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika ebongoli vɛrsɛ yango boye: “Yehova alobaki na Nkolo na ngai.” Ezongeli mpenza maloba yango ndenge ezali na Nzembo 110:1. Na ndenge yango, batángi bakoki sikoyo koyeba bokeseni oyo ezali kati na Yehova Nzambe ná Mwana na ye.
Nani abimisi yango?
Société Watchtower Bible and Tract Society, ndenge Batatoli ya Yehova bayebani na mibeko ya Leta, nde ebimisi Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika. Société yango ezali kobimisa mpe kokabola Babiblia na mokili mobimba banda mbula koleka nkama moko. Bakristo oyo bazali na Komite ya kobongola Libongoli ya Mokili ya Sika nde babongolaki Biblia yango mpe bapesaki yango na Batatoli ya Yehova. Na esika ya koluka lokumu na bango moko, bato ya komite yango basɛngaki ete bankombo na bango eyebana te, ata nsima ya liwa na bango.—Talá mpe 1 Bakorinti 10:31.
Kasi mpo na nini babengaki Biblia yango Libongoli ya Mokili ya Sika? Yango emonisaki kondima makasi oyo bazalaki na yango ete bato bakómi “pene mpenza ya kokɔta na mokili ya sika” oyo 2 Petro 3:13 elobeli. Ndenge komite yango ekomaki, “lokola mokili oyo ya kala ezali kokende na nsuka na yango,” esengeli mpenza mabongoli ya Biblia etika “solo ya Liloba ya Nzambe” engɛnga.—Talá, Maloba ya ebandeli ya ebimeli ya 1950.
Libongoli moko ya sikisiki
Yango wana balukaki libosoliboso ete makanisi oyo babongoli ezala sikisiki. Bato oyo babongolaki na Lingelesi babongolaki na kolanda mikanda ya Ebre, ya Aramɛyɛ, mpe ya Grɛki, mikanda ya malamu oyo ezalaki na ntango yango.a Basalaki mpe makasi mpenza mpo bábongola liloba mokomoko ya makomi wana ya kala—kasi na ndenge oyo ekozala mpasi te mpo bato oyo bazali kotánga yango lelo bákanga ntina.
Tokoki kokamwa te ndenge bato mosusu ya mayele bakumisi Libongoli ya Mokili ya Sika mpo na ndenge ebongolami na bosembo mpe na bosikisiki. Na 1989, Profɛsɛrɛ Benjamin Kedar, moto ya mayele na makambo ya monɔkɔ ya Ebre na Yisraele, alobaki boye: “Ntango nalukalukaka makambo ya minɔkɔ mpo na Biblia ya Ebre mpe mabongoli mosusu, natalaka mingimingi Biblia ya Lingelesi oyo babengi Libongoli ya Mokili ya Sika. Kosala bongo esalisaka ngai nandima ete babongoli ya Biblia yango basalaki mpenza makasi mpo na kobimisa ndimbola ya sikisiki ya makomi na bosembo.”
Ebongolami mpe na minɔkɔ mosusu
Yango wana, Batatoli ya Yehova basali ete bato oyo balobaka Lingelesi te bázwa mpe Libongoli ya Mokili ya Sika na minɔkɔ na bango. Lelo oyo, basili kobimisa yango na mobimba to ndambo na minɔkɔ koleka ntuku nsambo (70). Mpo na koyeisa mosala yango pɛpɛlɛ, babimisi mayele ya koyekola maloba ya Biblia mpe kosalela ordinatɛrɛ mpo na kobongola Biblia. Lisusu, basalá departema moko oyo etalelaka mosala ya kobongola mikanda mpo na kosalisa babongoli na mosala na bango. Na nzela ya Komite na yango ya Bokomi, Lisangani ya Mikóló-Bakambi elandelaka na likebi mpenza mosala ya kobongola Biblia. Kasi, ndenge nini mosala yango esalemaka?
Libosoliboso, baponaka ndambo ya bakristo oyo bamipesá na Nzambe mpo na kosala ekipi moko ya babongoli. Ndenge toyebi, soki babongoli bazali kosala bango nyonso elongo, na esika moto na moto asala ye moko, mosala ya malamu esalemaka, babimisaka Biblia ya malonga. (Talá mpe Masese 11:14.) Na momeseno, bazwaka bato ya sika te mpo na kobongola Biblia; bazwaka kaka bato oyo babongolaka mikanda ya Batatoli ya Yehova banda kala. Na yango, bateyaka bato ya ekipi yango ndenge ya kobongola Biblia mpe kosalela baprogramɛ ya ordinatɛrɛ oyo ebongisamá mpo na bango.
Bateyaka babongoli bábongola Biblia (1) na bosikisiki, (2) maloba na yango ya ntina ebongolama ndenge moko bisika nyonso, (3) soki likoki ezali, bábongola liloba mokomoko, kasi (4) na elobeli oyo ekozala mpasi te mpo moto nyonso akanga ntina na yango. Ndenge nini esalemaka? Tózwa ndakisa ya Biblia oyo euti kobima sika. Babongoli babandaki naino kopona maloba ya Lingala mpo na liloba mokomoko ya ntina oyo basalelaki na Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika na Lingelesi. Basalelaki programɛ moko ya ordinatɛrɛ oyo ezalaki kolakisa bango maloba mosusu ya Biblia oyo eyokani to oyo ezali na ndimbola moko na maloba wana ya ntina. Ezalaki mpe kolakisa bango maloba ya Grɛki mpe ya Ebre oyo basalelaki mpo na kobongola na Lingelesi; mpe yango esalisaka babongoli báyeba ndenge oyo maloba wana ebongolamaki na bisika mosusu. Nyonso wana nde esalisaki bango bápona maloba ya Lingala oyo ebongi mpenza. Nsima ya koyokana na maloba yango, babandaki kobongola Biblia; bazalaki kosalela ordinatɛrɛ mpo bámona maloba ya Lingala oyo ebongi ntango bazali kobongola vɛrsɛ mokomoko.
Kasi, mosala ya kobongola ezali kaka te kozwa maloba ya monɔkɔ moko boye, mpe kotya yango na monɔkɔ mosusu. Mosala monene oyo babongoli basengelaki kosala ezalaki ya kotala soki maloba yango ya Lingala oyo baponi ebimisi mpenza likanisi ya vɛrsɛ esika ezali. Basengelaki mpe kosala makasi bátosa mibeko ya lokota, mpe bákoma makambo na elobeli ya kitoko, ndenge bato balobaka. Mosala makasi oyo basali na Biblia yango ezali komonana na miso. Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika na Lingala ebongoli Liloba ya Nzambe na ndenge oyo ezali mpasi te mpo na kotánga, polele mpe pɛtɛɛ mpo na kokanga ntina, mpe ebongoli makanisi ndenge mpenza ezali na makomi ya ebandeli.
Tosɛngi yo otalela malamumalamu yo moko Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika. Okoki kozwa yango epai ya babimisi ya zulunalo oyo to na lisangá ya Batatoli ya Yehova epai ofandi. Okoki kotánga yango mpe kondima ete Biblia yango ebongoli maloba ya Nzambe na bosembo mpenza na Lingala. Na ntembe te, yo mpe okondima ete kobima ya Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika na Lingala ezali mpenza likambo moko monene na losambo na biso!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Basalelaki Biblia The New Testament in the Original Greek, ya Westcott mpe Hort, mpo na kobongola makomi ya Grɛki. Mpe mpo na kobongola Makomami ya Ebre, basalelaki Biblia Hebraica ya R. Kittel.
[Etanda/Bililingi na lokasa 13]
Mwa makambo oyo ezali na Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Ezali polele mpe mpasi te mpo na kotánga
Bavɛrsɛ mingi esangisami na kati ya baparagrafe: Na esika vɛrsɛ mokomoko ezala paragrafe, bavɛrsɛ mingi esangisami nde na kati ya baparagrafe. Yango ezali kosalisa motángi ayeba mpenza likambo oyo mokomi mokomoko ya Biblia alobelaki.
Mwa maloba oyo ezalaka likoló ya lokasa mokomoko: Esalisaka moto ayeba nokinoki esika lisolo moko boye ya Biblia ezali.
Bilembo ya kotinda na bavɛrsɛ mosusu: Lokasa mokomoko ezali na bilembo oyo ezali kotinda na bavɛrsɛ mosusu ya Biblia oyo ezali na likanisi ndenge moko.
Kɔnkɔrdansi: Pene na nsuka ya Biblia, okokuta eteni moko oyo ezali na motó ya likambo: “Index ya maloba ya Biblia.” Na esika yango, batye molɔngɔ ya maloba oyo eponami mpe esika yango ezali na Biblia; mbala mingi bapesi mwa maloba ya vɛrsɛ mpo na komonisa esika yango ezwami.
Apɛndisi: Mwa masolo ya mokuse oyo elobeli mateya ya Biblia mpe makambo mosusu oyo ezali na boyokani na Biblia.