Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w09 15/11 nk. 12-13
  • Mituna ya batángi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna ya batángi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Masolo mosusu
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Kozipa motó—Ntango nini mpe mpo na nini?
    “Bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe”
  • Mokumba oyo bankulutu bazali na yango na kati ya lisangá
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2021
  • Basi
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
w09 15/11 nk. 12-13

Mituna ya batángi

Ebongi ete ndeko mwasi oyo azali kobongola masukulu na makita mpe na mayangani na elobeli ya bajɛstɛ azipa motó?

Mbala mingi, ndeko mwasi asengeli kozipa motó ntango azali kokokisa mokumba moko oyo kaka mobali na ye to bandeko mibali na lisangá nde basengeli kokokisa. Yango eyokani na etinda ya Paulo ete: “Mwasi nyonso oyo azali kobondela to kosakola motó na ye ezipami te azali koyokisa mokonzi na ye nsɔni,” mpo “mokonzi ya mwasi ezali mobali.” (1 Ko. 11:3-10) Na mabaku yango, ntango ndeko mwasi azipi motó na ndenge oyo ebongi, amonisaka ete azali kotosa ebongiseli ya teokrasi.​—1 Tim. 2:11, 12.a

Kasi, ezali boni ntango ndeko mwasi azali kobongola lisukulu moko na elobeli ya bajɛstɛ? Ya solo, ndeko mwasi azali kaka koyebisa makambo oyo ndeko mobali azali koloba. Na maloba mosusu, ezali ye te nde azali koteya, kasi ndeko mobali. Nzokande, kobongola na elobeli ya bajɛstɛ ekeseni mpenza na kobongola na minɔkɔ mosusu. Na minɔkɔ mosusu, bayangani bakotya likebi epai ya ndeko oyo azali kosala lisukulu mpe kolanda mobongoli. Lisusu, na bokeseni na kobongola na elobeli ya bajɛstɛ, mbala mingi ndeko mwasi oyo azali kobongola na monɔkɔ mosusu, bayangani batyaka mingimingi te likebi na bango epai na ye. Kutu, ntango mosusu akoki kofanda ntango azali kobongola to mpe soki atɛlɛmi, asengeli kotala nde molobi, kasi bayangani te. Yango wana ezali na ntina te ete ndeko mwasi yango azipa motó.

Lisusu, lokola bakómi kosalela bamasini ntango bazali kobongola na elobeli ya bajɛstɛ, yango ekómi kosala ete ndeko oyo azwi mokumba ya kobongola akóma komonana malamu mingi koleka. Elilingi ya ndeko oyo azali kobongola emonanaka na televizyo (écran) moko ya monene, wana bayangani bakoki kutu komona molobi te ndenge bazali komona mobongoli. Yango wana ekozala malamu ete ndeko mwasi oyo azali kobongola azipa motó; yango ekomonisa ete ayebi ete azali kaka koyebisa makambo oyo ndeko mobali azali koloba.

Kasi, ezali boni soki ndeko mwasi azali nde kobongola na elobeli ya bajɛstɛ elakiseli moko na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, to mpe azali kobongola eyano oyo ndeko moko apesi na boyekoli ya Biblia na lisangá, na Likita ya Mosala, to na boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli? Asengeli mpe kozipa motó na ntango wana? Emonani ete na mabaku mosusu ezali na ntina te ete ndeko mwasi azipa motó, mpo bayangani bazali na likoki ya komona ete ye te nde azali kotambwisa makita. Ezali mpe bongo ntango azali kobongola biyano ya bayangani, lisolo ya bandeko basi, to bilakiseli mosusu. Nzokande, ntango azali kobongola masukulu, boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, boyekoli ya Biblia na lisangá, to mpe ntango azali kobongola banzembo, asengeli kozipa motó. Ntango makita ezali kosalema, ndeko mwasi akoki kobongola mpo na bandeko mibali, basi, bana, mpe bankulutu. Mpo na yango, ekozala malamu azipa motó na ye na boumeli ya makita.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mpo na koyeba makambo mosusu na likambo ya kozipa motó mpo na basi bakristo, talá buku “Bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe,” nkasa 209 tii 212.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto