APƐNDISI
Kozipa motó—Ntango nini mpe mpo na nini?
Na makambo ya losambo, ntango nini mpe mpo na nini mwasi mokristo asengeli kolata eloko mpo na kozipa motó na ye? Tótalela makambo oyo ntoma Paulo akomaki na lisalisi ya elimo ya Nzambe. Maloba na ye ezali kopesa biso makanisi oyo ebongi mpo na kozwa bikateli ya malamu mpe oyo ekopesa Nzambe nkembo. (1 Bakorinti 11:3-16) Paulo amonisi makambo misato oyo tosengeli kotalela: (1) na makambo nini mwasi asengeli kolata eloko mpo na kozipa motó, (2) na bisika nini asengeli kosala yango mpe, (3) mpo na bantina nini asengeli kosala yango.
Makambo. Paulo atángi makambo mibale: kobondela mpe kosakola. (Vɛrsɛ 4, 5) Kobondela elimboli koloba na limemya nyonso epai ya Yehova. Lelo oyo, mpo na mokristo, kosakola ekoki kolimbola koteya makambo ya Biblia. Kasi, Paulo alingaki nde koloba ete mwasi asengeli kozipa motó mbala nyonso oyo azali kobondela to koteya Biblia? Te. Yango ezali kotalela esika oyo azali kobondela to koteya.
Bisika. Paulo alobeli bisika mibale—na kati ya libota mpe na lisangá. Alobaki boye: “Mokonzi ya mwasi ezali mobali. . . . Mwasi nyonso oyo azali kobondela to kosakola motó na ye ezipami te azali koyokisa mokonzi na ye nsɔni.” (Vɛrsɛ 3, 5) Na kati ya libota, Yehova atye mobali mokonzi ya mwasi na ye. Mwasi akoyokisa mobali na ye nsɔni soki azali komonisa te ete azali kondima bokonzi na ye ntango azali kokokisa mikumba oyo Yehova apesi epai ya mobali. Na ndakisa, soki esɛngi ete mwasi ayekola Biblia ná moto na miso ya mobali na ye, asengeli kozipa motó na ye mpo na komonisa ete azali kondima bokonzi ya mobali. Akosala bongo ata soki mobali na ye azali te ndeko oyo azwá batisimo, mpamba te azali kaka mokonzi ya libota.a Soki alingi kosala libondeli to koteya liboso ya mwana na ye oyo azali elenge oyo azwá batisimo, akozipa mpe motó na ye, ezali te mpo mwana yango azali mokonzi ya libota, kasi mpo na bokonzi oyo lisangá epesi na bandeko mibali oyo bazwá batisimo.
Esika mosusu oyo Paulo alobeli ezali na kati ya lisangá; alobi boye: “Soki moto moko amonani lokola nde azali kokɔtela momeseno mosusu, tozali na mosusu te, mpe masangá ya Nzambe ezali na yango te.” (Vɛrsɛ 16) Na lisangá ya bokristo, mibali oyo bazwá batisimo nde bazwaka mokumba ya kokamba. (1 Timote 2:11-14; Baebre 13:17) Kaka mibali nde bazwaka mokumba ya nkulutu mpe ya mosaleli na misala mpo na kobatela etonga ya Nzambe. (Misala 20:28) Kasi, na bantango mosusu, ekoki kosɛnga ete mwasi mokristo akokisa mokumba oyo, na momeseno, mibali oyo bazwá batisimo mpe bakokisi masɛngami nde basalaka yango. Na ndakisa, ndeko mwasi akoki kotambwisa likita mpo na mosala ya kosakola mpo ndeko mobali oyo azwá batisimo, oyo akoki kosala yango, azali te. To mpe akoki koyekola Biblia na moto na ntango oyo abimi ná ndeko mobali oyo azwá batisimo.b Lokola yango mpe ezali makambo etali lisangá, asengeli kozipa motó mpo na komonisa ete azali kosala makambo oyo esengelaki ete mobali nde asala yango.
Nzokande, ezali na makambo mingi ya losambo oyo ndeko mwasi akoki kosala, kasi esɛngi te ete azipa motó. Na ndakisa, ezali na ntina te ete ndeko mwasi azipa motó ntango azali kopesa biyano na makita, ntango azali kosakola ndako na ndako ná mobali na ye to ná ndeko mosusu oyo azwá batisimo, to mpe ntango azali koyekola to kobondela ná bana na ye oyo bazwi naino batisimo te. Ya solo, likambo yango ekoki kobimisa mituna mosusu, mpe soki ndeko mwasi azali kokakatana na likambo oyo asengeli kosala, akoki koluka makanisi na mikanda mosusu.c Soki ndeko mwasi yango azwi kaka eyano ya polele te mpe soki lisosoli na ye etindi ye alata eloko mpo na kozipa motó, ekozala mabe te, ndenge fɔtɔ oyo emonisi yango.
Bantina. Na vɛrsɛ 10, tozali kokuta ntina mibale oyo mwasi mokristo asengeli kozipa motó: “Mwasi asengeli kozala na elembo ya bokonzi na motó na ye mpo na baanzelu.” Ya liboso, tomoni maloba “elembo ya bokonzi.” Kolata eloko mpo na kozipa motó ezali lolenge oyo mwasi amonisaka ete azali kondima bokonzi oyo Yehova apesi na mibali oyo bazwá batisimo na kati ya lisangá. Na ndenge yango, amonisaka bolingo na ye mpe bosembo na ye epai ya Yehova Nzambe. Ntina ya mibale emonisami na maloba “mpo na baanzelu.” Ntango mwasi alati eloko mpo na kozipa motó, yango esalaka nini epai ya bikelamu wana ya nguya?
Baanzelu balingaka komona ete bokonzi ezali kotosama ndenge Nzambe abongisá na lisangá na ye mobimba, na likoló mpe awa na mabele. Lisusu, bazwaka liteya na ndakisa oyo bato ya kozanga kokoka bapesaka na likambo yango. Bango mpe basengeli kotosa bibongiseli ya Yehova—likambo oyo baanzelu mosusu basalaki te. (Yuda 6) Lelo oyo, baanzelu bamonaka ntango ndeko mwasi moko azali kotosa bokonzi ya ndeko mobali moko na lisangá, atako mbala mosusu ndeko mwasi yango ayebi kosala makambo mingi, azali na boyebi mingi, mpe azali na mayele koleka ndeko mobali wana. Ekoki mpe kozala ete ndeko mwasi yango atyamá mafuta na elimo mpe akozwa libula elongo na Kristo. Ndeko mwasi ya ndenge wana akozala na esika ya lokumu mingi koleka oyo ya baanzelu mpe akoyangela elongo na Kristo na likoló. Yango ezali ndakisa malamu mpenza mpo na baanzelu! Ya solo, bandeko basi nyonso bazali na libaku malamu ya komonisa ezaleli ya komikitisa mpe botosi na nzela ya bosembo mpe limemya na bango na miso ya bamilio ya baanzelu ya sembo!
a Mwasi mokristo asengeli te kobondela na mongongo makasi liboso ya mobali na ye oyo azali mondimi, lobá soki mobali akoki kosala yango te, na ndakisa soki azali kokoka koloba te mpo na maladi.
b Ndeko mwasi akozipa motó na ye te ntango azali koyekola Biblia wana azali elongo na mosakoli oyo azwi naino batisimo te, oyo azali mobali na ye te.
c Mpo na makanisi mosusu, talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/02/2015, lokasa 30 (na Lifalanse), ya 15/07/2002, nkasa 26-27, mpe ya 01/06/1977, nkasa 349-352 (na Lifalanse).