Nzambe azali kosala nini?
“Ee Yehova, mpo na nini ozali kaka kotɛlɛma mosika? Mpo na nini ozali kaka komibomba na ntango ya mpasi?”a—NZEMBO 10:1.
SOKI obwaki liso na mitó ya makambo oyo ezali na bazulunalo, okondima ete tozali na “ntango ya mpasi.” Mpe soki likama ekweli biso—basali biso mabe, aksida, to ndeko na biso moko akufi—tokoki komituna ete, Nzambe azali mpenza komona? Azali mpenza kokipe? Kutu, azalaka mpenza?
Kasi, osilá komituna soki mbala mosusu makambo oyo tozelaka Nzambe asala, ezali nde oyo asengeli kosala te? Tópesa ndakisa: Mwana moko ya moke asiliki mpo papa na ye akei mosala. Mwana yango azali na mposa ya papa na ye mpe alingi papa azonga na ndako. Mwana azali komona ete papa asundoli ye. Mokolo mobimba azali kotunatuna, “Papa azali wapi?”
Tokoki mbala moko komona libunga oyo ezali na makanisi ya mwana yango. Ntango azali kotuna bongo, tata na ye azali kosala mosala mpo na bolamu ya libota mobimba. Mbala mosusu makanisi na biso ezalaka mpe na libunga ntango togangaka ete: “Nzambe azali wapi”?
Na ndakisa, bato mosusu bakoki kolinga Nzambe azala moto oyo mosala na ye ya liboso ezali nde kopesa etumbu nokinoki na baoyo bazali kosala mabe. Bato mosusu bamonaka Nzambe kaka lokola Père Noël moko ya likoló, oyo mosala na ye ezali kaka kopesa bakado—mosala, libala, to mpe kolonga na loterie.
Makanisi wana mibale elimboli ete soki Nzambe apesi etumbu nokinoki te to soki apesi biso te likambo oyo tosɛngi ye, boye akipaka bampasi na biso te mpe ayebaka bamposa na biso te. Kasi, ezali solo ata moke te! Likambo ya solo ezali ete sikoyo, Yehova Nzambe azali kosala mpo na bolamu ya bato nyonso, atako ezali te na ndenge oyo bato mingi bazali kosɛnga.
Na yango, Nzambe azali kosala nini? Mpo na koyanola motuna yango, tosengeli kozonga na ebandeli ya lisolo ya bato, ntango boyokani ya bato ná Nzambe ebebaki makasi—kasi, mpo na libela te.
Makambo mabe oyo lisumu ebimisá
Kanisá ndako moko oyo etikalá mobulumobulu bambula mingi. Nsamba ekweá na kati, baporte elongwá na bisika na yango, mpe bato babebisá libándá na yango na nko. Na ntango moko boye, ndako yango ezalaki malamu—kasi sikoyo ebebá. Na kotala ndenge ndako yango ebebi, kobongisa yango ekozala mosala monene; ekosalema na mokolo moko te.
Talá sikoyo mabe oyo ekómelaki bato eleki mbula soki 6 000 ntango Satana, elimo moko oyo amonanaka te, atindaki Adama ná Eva bátombokela Nzambe. Liboso likambo yango esalema, mobali ná mwasi ya liboso bazalaki bato ya kokoka, na elikya ya kozala na bomoi ya seko elongo na bana na bango oyo basengelaki koya nsima. (Ebandeli 1:28) Nzokande, ntango basalaki lisumu, ezalaki lokola nde Adama ná Eva babebisi na nko bato oyo basengelaki kobotama na nsima.
Komona te ete mabe oyo botomboki ebimisaki ezali moke. Biblia elobi boye: “Lisumu ekɔtaki na mokili mpo na moto moko [Adama] mpe liwa mpo na lisumu.” (Baroma 5:12) Longola kokɔtisa liwa, lisumu ebebisaki boyokani na biso na Mozalisi na biso mpe ebebisaki nzoto, makanisi, mpe motema na biso. Yango wana tozali kaka lokola ndako wana oyo ebebá. Yobo, moto ya sembo, amonisaki likambo yango polele mpe na mokuse ntango alobaki ete moto “azali na mikɔlɔ mingi tɛ mpe atondi na mpasi.”—Yobo 14:1, haut fleuve.
Kasi Nzambe asundolaki bato ntango Adama ná Eva bakweaki na lisumu? Ata moke te! Kutu, banda wana tii lelo, Tata na biso ya likoló azali kaka kosala mpo na bolamu ya bato nyonso. Mpo tómona malamu mpenza makambo oyo azali kosala mpo na biso, tótala makambo misato oyo esengeli kosala mpo na kobongisa ndako mpe ndenge mokomoko na yango ekokani na makambo oyo Nzambe asali mpo na kobongisa bato.
1 Nsima ya kotalatala ndako oyo ebebi, nkolo na yango akokata soki esengeli kobongisa yango to kobuka yango.
Mbala moko nsima ya botomboki na Edene, Yehova Nzambe ayebisaki mokano na ye ya kobongisa bato. Alobaki na elimo oyo emonanaka te, oyo ebimisaki botomboki ete: “Nakotya bonguna kati na yo ná mwasi mpe kati na momboto na yo ná momboto na ye. Ye akopanza motó na yo mpe yo okozokisa ye na litindi.”—Ebandeli 3:15.
Na maloba wana, Yehova alakaki ete akobebisa mobandisi ya botomboki oyo ebimaki na Edene. (Baroma 16:20; Emoniseli 12:9) Longola yango, Yehova asakolaki ete “momboto” moko akosikola bato na masumu.b (1 Yoane 3:8) Na ndenge yango, Yehova alakaki polele makambo oyo akosala: akobongisa nde kobongisa, akobebisa te. Kasi kobongisa bato ekosɛnga ntango.
2 Architecte akosala plan oyo ekomonisa polele mosala oyo esengeli kosalema mpo na kobongisa.
Yehova Nzambe apesaki Bayisraele mibeko mpe plan ya tempelo epai basengelaki kosambela ye. Biblia elobi boye: “Makambo wana ezali elili ya makambo oyo ekoya.” (Bakolose 2:17) Ndenge moko na plan, makambo yango emonisaki eloko moko oyo eleki monene.
Na ndakisa, Bayisraele bazalaki kopesa bambeka ya nyama mpo masumu na bango elimbisama. (Balevi 17:11) Momeseno wana ezalaki elili ya mbeka moko monene oyo esengelaki kopesama bikeke na nsima—mbeka oyo esengelaki mpenza kosikola bato.c Ata ndenge oyo tabernakle mpe tempelo epai Bayisraele bazalaki kosambela etongamaki ezalaki komonisa makambo oyo Masiya oyo akoya asengelaki kosala, banda liwa na ye ya mbeka tii komata na ye na likoló.—Talá etanda na lokasa 7.
3 Bakopona motongi oyo akolanda plan mpe akosala mosala ya kobongisa ndako.
Yesu, Masiya oyo alakamaki, asengelaki kolanda ndakisa oyo bambeka ya Bayisraele etikaki mpe kopesa bomoi na ye mpo na kosikola bato. Kutu, Yoane Mobatisi abengaki Yesu “Mwana-Mpate ya Nzambe oyo azali kolongola lisumu ya mokili.” (Yoane 1:29) Yesu andimaki mosala yango na motema moko. Alobaki boye: “Nakitaki uta na likoló mpo na kosala, mokano na ngai te, kasi mokano ya moto oyo atindaki ngai.”—Yoane 6:38.
Mokano ya Nzambe mpo na Yesu ezalaki kaka te ete ‘apesa molimo na ye lisiko na esika ya bato mingi’ kasi mpe ete asala kondimana ná bayekoli na ye mpo na Bokonzi. (Matai 20:28; Luka 22:29, 30) Bokonzi yango ezali nzela oyo Nzambe akosalela mpo na kokokisa mokano na ye mpo na bato. Nsango ya Bokonzi ya Nzambe ebengami “nsango malamu” mpo emonisi ete Nzambe atye guvɛrnema moko na likoló mpo na kotambwisa makambo ya mabele!—Matai 24:14; Danyele 2:44.d
Mosala ya kobongisa ezali kokoba
Liboso amata na likoló, Yesu apesaki bayekoli na ye mitindo oyo: “Bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso, bóbatisa bango na nkombo ya Tata mpe ya Mwana mpe ya elimo santu . . . Mpe talá! nazali elongo na bino mikolo nyonso tii na bosukisi ya makambo ya ntango oyo.”—Matai 28:19, 20.
Na yango, mosala ya kobongisa bato esengelaki kosuka na liwa ya Yesu te. Esengelaki kokoba tii na “bosukisi ya makambo ya ntango oyo”—ntango Bokonzi ya Nzambe esengelaki kobanda kotambwisa makambo ya mabele.Tozali sikoyo na ntango yango. Toyebi yango mpo elembo oyo Yesu asakolaki mpo na “bosukisi ya makambo ya ntango oyo” ezali kokokisama.e—Matai 24:3-14; Luka 21:7-11; 2 Timote 3:1-5.
Lelo oyo, na mikili 236, Batatoli ya Yehova bazali kotosa etinda ya Yesu ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Kutu, zulunalo oyo ozali kotánga ebongisami mpo na kosalisa yo oyeba makambo mingi na ntina na Bokonzi yango mpe makambo oyo ekosala. Na lokasa 2 ya nimero nyonso ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, okokuta maloba oyo: “Zulunalo oyo . . . ebɔndisaka bato na nsango malamu oyo: etikali moke Bokonzi ya Nzambe, oyo ezali guvɛrnema ya solo mpenza kuna na likoló, esukisa mabe nyonso mpe ebongola mabele mobimba Paradiso. Elendisaka bato bándimela Yesu Kristo, oyo akufaki mpo biso tókoka kozwa bomoi ya seko mpe azali lelo Mokonzi na Bokonzi ya Nzambe.”
Ya solo, sikoyo okoki kaka koyoka nsango ya misala mabe ya bateroriste to nsango ya makama oyo euti na biloko oyo Nzambe akelá, to yo moko okoki kokutana na likama. Kasi koyekola Biblia ekosalisa yo ondima ete Nzambe asundolá bato te. Kutu, “azali mosika te na mokomoko na biso.” (Misala 17:27) Mpe elaka na ye ya kozongisa nyonso oyo baboti na biso ya liboso babungisaki ekolonga.—Yisaya 55:11.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Yehova ezali nkombo ya Nzambe ndenge emonisami na Biblia.
b Mpo na koyeba ndimbola molai ya Ebandeli 3:15, talá mokapo 19 ya buku Pusaná penepene na Yehova, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
c Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mokapo 5 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini? ebimisami na Batatoli ya Yehova.
d Mpo na koyeba makambo mosusu oyo etali Bokonzi ya Nzambe, talá mokapo 8 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini?
e Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mokapo 9 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini?
[Etanda/Bililingi na lokasa 7]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
“Elilingi ya makambo ya solo”—Tabernakle ezalaki elilingi
ETUMBELO
Ndenge Nzambe alingaki kondima mbeka ya Yesu.—BAEBRE 13:10-12.
NGANGA-NZAMBE MONENE
Yesu.—BAEBRE 9:11.
1 Na Mokolo ya kozipa masumu, nganga-nzambe monene azalaki kopesa mbeka mpo na masumu ya bato.—BALEVI 16:15, 29-31.
1 Na mokolo ya 14 Nisana ya mobu 33 T.B., Yesu apesaki bomoi na ye mbeka mpo na bolamu na biso.—BAEBRE 10:5-10; 1 YOANE 2:1, 2.
ESIKA MOSANTU
Ndenge Yesu akómaki ntango abotamaki na elimo.—MATAI 3:16, 17; BAROMA 8:14-17; BAEBRE 5:4-6.
RIDO
Nzoto ya Yesu ya mosuni, oyo ezalaki kokanga nzela mpe kokabola bomoi ya mabele na bomoi ya likoló.—1 BAKORINTI 15:44, 50; BAEBRE 6:19, 20; 10:19, 20.
2 Nganga-nzambe monene azalaki koleka na ngámbo mosusu ya rido oyo ezalaki kokabola Esika Mosantu ná Esika oyo Eleki Bosantu.
2 Nsima ya lisekwa na ye, Yesu ‘alekaki na ngámbo mosusu ya rido’ na ndenge amataki na likoló mpo “amonana . . . liboso ya Nzambe mpenza mpo na biso.”—BAEBRE 9:24-28.
ESIKA OYO ELEKI BOSANTU
Likoló.—BAEBRE 9:24.
3 Na kati ya Esika oyo Eleki Bosantu, nganga-nzambe monene azalaki komwangisa mwa ndambo ya makila ya mbeka liboso ya sanduku ya kondimana.—BALEVI 16:12-14.
3 Ntango alakisaki motuya ya makila na ye oyo asopaki, Yesu azipaki mpenza masumu na biso.—BAEBRE 9:12, 24; 1 PETRO 3:21, 22.