Nkombo ya Nzambe, Yehova, na tempelo na Ezipito
BANDA ntango nini nkombo ya Nzambe, Yehova to Yawe, emonanaki na bisika mosusu, longola na Biblia? Bato mosusu ya mayele bayanolaka kozanga kokakatana ete ezali banda na ekeke 14 liboso ya ntango na biso (L.T.B.). Mpo na nini balobaka bongo?
Na mobu soki 1370 L.T.B., Baezipito balongaki mikili mingi. Farao Amenhotep (Aménophis) III, mokonzi ya Ezipito, atongaki kabakata ya tempelo na Soleb, na Nubie, oyo ezali lelo Soudan. Ntango bato ya arkeoloji bakundolaki tempelo yango, bamonaki makomi ya Baezipito oyo babengi hiéroglyphe, oyo ezalaki komonana lokola tetragrame, balɛtrɛ minei ya Ebre—YHWH, to Yehova. Makomi yango oyo bakataki na efelo eumelá mbula 500 koleka Libanga ya Moabe oyo eyebani mingi; kala libanga yango ya Moabe ezalaki eloko ya kala mpenza oyo ezalaki na nkombo ya Nzambe. Mpo na nini mbala mosusu nkombo ya Nzambe ya Biblia ekomamaki na efelo ya tempelo moko ya Ezipito?
“Shasu, mokili ya Jahu”
Farao Amenhotep III apesaki nzambe Amôn-Râ tempelo oyo atongaki. Tempelo yango ezalaki mɛtrɛ soki 120 na molai mpe ezalaki pembeni ya Ebale Nile, na ngámbo ya wɛsti. Makomi ya hiéroglyphe oyo ezalaki na nse ya makonzí ya eteni na yango moko etángaki bankombo ya bamboka oyo Amenhotep alobaki ete alongaki. Mboka mokomoko emonisamaki na moto moko ya bolɔkɔ, bakangi ye mabɔkɔ na nsima ya mokɔngɔ mpe amemi nguba oyo bakomá nkombo ya mboka na bango to ya bato oyo bafandaka kuna. Mikili ya bato mingi oyo bazalaki kobenga Shasu, to Shosou, ezalaki na makomi yango ya hiéroglyphe. Bato ya Shasu bazalaki banani?
Shasu ezalaki nkombo oyo Baezipito bapesaki Ba-Bédouin, mabota ya bato oyo batyolamaki, oyo bazalaki kofanda soki oleki ndelo ya ɛsti ya Ezipito. Mikili ya Shasu ezalaki na sudi ya Palestine, na sudi ya Transjordanie, mpe na Sinai. Bato mosusu ya mayele balobaka ete mikili oyo balobaki ete ezalaki ya Shasu ekendaki tii na Libá mpe na Siri, na nɔrdi. Liste ya mikili oyo elongamaki, oyo ekomamaki na Soleb, ezalaki na mokili moko oyo bazalaki kotánga nkombo na yango ndenge ekeseni: “Yawe na mokili ya Shosou,” “Shasu, mokili ya Jahu,” to “Mokili ya Shasu-yhw.” Jean Leclant, moto ya mayele oyo ayekolaka makambo ya Ezipito ya kala, alobi ete nkombo oyo ekomamaki na nguba wana na Soleb “ekokani na ‘tetragrame’ ya nzambe ya Biblia, YHWH.”
Bato mingi ya mayele bamonaka ete nkombo Jahu, Yahu, to Yawe oyo emonanaki na esika wana to na bisika mosusu esengeli kozala nkombo ya esika to ya etúká moko. Moto moko ya mayele na nkombo Shmuel Ahituv alobi ete makomi yango emonisi “bisika oyo libota ya basambeli ya Yāhū, Nzambe ya Yisraele, bazalaki kotambolatambola.”a Soki maloba na ye ezali solo, nkombo ya esika yango ezali kaka moko ya bandakisa ebele ya Basemite ya kala oyo ekokanisi nkombo ya esika ná nzambe ya esika yango. Ndakisa mosusu ezali Assur, oyo ezalaki komonisa mokili ya Asiri mpe nzambe na yango oyo aleki monene.
Mpo na makomi oyo ezalaki na tempelo ya Nubie, Roland de Vaux, moto ya mayele na makambo ya Biblia mpe ya arkeoloji, alobi boye: “Na mokili ya bato oyo bankɔkɔ ya Yisraele ná bankɔkɔ na bango bazalaki kokutana mingi banda na ekeke ya zomi na mitano liboso ya ntango na biso, nkombo ya bisika na bango mpe ya bato ezalaki kokokana mingi, mbala mosusu mpe ezalaki kaka ndenge moko na oyo ya Nzambe ya Yisraele.”
Nkombo oyo bazali kaka komemya
Na Nubie, ezali kaka na Soleb te nde nkombo Yawe emonisami na makomi ya hiéroglyphe ya Ezipito. Makomi mosusu oyo mbala mosusu ezali bakopi ya liste ya Soleb ezali mpe na batempelo ya Ramesese II na Amarah ya Wɛsti mpe na Aksha. Na liste oyo ezali na Amarah, makomi ya hiérogyphe oyo elobi “Yawe na mokili ya Shosou” ekokani na makomi oyo elobeli mikili mosusu ya Ba-Shosou, oyo bakanisaka ete ezali Seire mpe Labane. Na Biblia, bisika yango ekokani na sudi ya Palestine, Edome mpe Sinai. (Ebandeli 36:8; Kolimbola Mibeko 1:1) Ezali mikili oyo bafandi na yango bazalaki bato oyo bazalaki koyeba Yehova mpe kosambela ye liboso mpe nsima Bayisraele báfanda na Ezipito.—Ebandeli 36:17, 18; Mitángo 13:26.
Na bokeseni na bankombo ya banzambe mosusu oyo ezali na makomi ya kala, Yehova, nkombo ya Nzambe ya Biblia, ezali naino kosalelama mpe komemyama mingi. Na ndakisa, na mikili koleka 230, Batatoli ya Yehova koleka milio nsambo bazali komipesa mobimba mpo na kosalisa bato mosusu báyeba kaka nkombo yango te kasi mpe bápusana penepene na Nzambe oyo azali na nkombo yango oyo ekeseni na nyonso, Yehova.—Nzembo 83:18; Yakobo 4:8.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Bato mosusu ya mayele bamitunaka soki makomi wana ya hiéroglyphe elimboli nde ete bato ya Shasu “bazalaki basaleli ya nzambe Yawe.” Bakanisaka ete mbala mosusu nkombo ya mokili yango oyo eyebani te ekokani kaka boye na nkombo ya Nzambe ya Yisraele.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 21]
Mpo na nini Yehova, nkombo ya Nzambe ya Biblia, ekomamaki na tempelo ya bapakano ya Ezipito?
[Karte na lokasa 21]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
EZIPITO
Tempelo na Soleb
SOUDAN
Ebale Nile
[Bililingi na lokasa 21]
Likonzí ya tempelo oyo bamekolaki
[Elilingi na lokasa 22]
Bitiká ya tempelo ya Amôn-Râ, na Soleb, na Soudan
[Eutelo ya bafɔtɔ
Ed Scott/Pixtal/age fotostock
[Eutelo ya bafɔtɔ 21]
Bililingi oyo ezali na nsima: Asian and Middle Eastern Division/The New York Public Library/Astor, Lenox and Tilden Foundations