Pusaná penepene na Nzambe
Alukaka oyo ezali malamu
“YEHOVA azali kotalatala mitema nyonso, mpe asosolaka mposa nyonso ya makanisi.” (1 Ntango 28:9) Maloba wana ya Biblia ekoki kotinda biso tózala na botɔndi mingi na ndenge Yehova amibanzabanzaka mpo na biso. Yehova alukaka oyo ezali malamu na mitema na biso atako tozali bato ya kozanga kokoka mpenza. Yango emonani polele na maloba na ye mpo na Abiya, oyo ezali na 1 Bakonzi 14:13.
Abiya azalaki na libota moko ya mabe. Tata na ye, Yeroboame abandisaki molɔngɔ ya bakonzi oyo bapɛngwaki.a Yehova akanaki kokɔmbola ndako ya Yeroboame, “ndenge moto alongolaka nyɛi.” (1 Bakonzi 14:10) Kasi, Nzambe apesaki mobeko ete kaka moto moko ya libota ya Yeroboame, elingi koloba Abiya—oyo azalaki kobɛla makasi—akundama na ndenge ebongi.b Mpo na nini? Nzambe alimbolaki boye: “Yehova Nzambe ya Yisraele amoni eloko moko ya malamu epai na ye, na ndako ya Yeroboame.” (1 Bakonzi 14:1, 12, 13) Maloba wana emonisi biso nini na ntina na Abiya?
Biblia elobi te ete Abiya azalaki mosambeli ya sembo ya Nzambe. Kasi, azalaki na mwa makambo na ye ya malamu. Malamu yango ezalaki mpo na Yehova, ntango mosusu etalelaki losambo na ye. Bakomi ya Balabi balobaka ete Abiya asalaki mobembo na tempelo na Yerusaleme to ete alongolaki bakɛngɛli oyo tata na ye atyaki mpo na kopekisa Bayisraele bákende na Yerusaleme.
Ezala bongo to te, bolamu ya Abiya ezalaki komonana polele. Ya liboso ezalaki ya solosolo. Bolamu yango ezalaki “epai na ye”—elingi koloba na motema na ye. Ya mibale, ezalaki epai ya moto nyonso te. Abiya amonisaki bolamu na ye atako azalaki “na ndako ya Yeroboame.” Moto moko ya mayele alobi boye: “Ntango moto azali kofanda na esika mpe na libota ya mabe kasi azali kaka komonisa ezaleli ya bolamu, abongi mpenza kozwa longonya monene.” Moto mosusu alobi ete bolamu ya Abiya ezalaki “komonana polele . . . , kaka ndenge minzoto engɛngaka na likoló na ntango ya molili, mpe banzete ya sɛdrɛ emonanaka kitoko soki ezali pembenipembeni ya banzete oyo ezangi nkasa.”
Likambo eleki ntina, maloba oyo ezali na 1 Bakonzi 14:13, eteyi biso likambo moko ya kitoko na ntina na Yehova mpe makambo oyo alukaka epai na biso. Kobosana te ete eloko moko ya malamu “emonanaki” epai ya Abiya. Emonani ete Yehova alukaki na motema ya Abiya mpe amonaki eloko moko ya malamu epai na ye. Na bokeseni na libota na ye, Abiya azalaki, ndenge moto moko ya mayele amonisi yango, lokola liyaka moko “na kati ya ebele ya mabanga.” Yehova asepelaki na bolamu yango mpe apesaki ye mbano mpo na yango, amonisaki motema mawa epai ya moto moko wana ya libota wana ya mabe.
Ezali kolendisa te koyeba ete Yehova alukaka mpe azwaka na motuya bolamu oyo ezali kati na biso atako tozali bato ya kozanga kokoka? (Nzembo 130:3) Koyeba bongo esengeli kotinda biso tópusana lisusu penepene na Yehova, Nzambe oyo atalaka na kati na mitema na biso mpo na koluka ata mwa likambo moko ya malamu oyo tozali na yango.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Yeroboame atyaki ekeko ya mwana-ngɔmbɛ mpo na losambo na bokonzi ya mabota zomi ya Yisraele oyo ezalaki na nɔrdi mpo na kopekisa bato bákende kosambela Yehova na tempelo.
b Na ntango ya kala, koboya ete bákunda moto na ndenge oyo ebongi ezalaki komonisa ete Nzambe asepeli na moto yango te.—Yirimia 25:32, 33.