Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w10 1/8 nk. 16-17
  • Ndenge ya kozwa esengo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge ya kozwa esengo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Masolo mosusu
  • Esengo na baoyo basalelaka “Nzambe ya esengo”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2018
  • Epai wapi bolamu ya solosolo ekoki kozwama?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Kosalela Jéhovah ezali bolamu ya solo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Ndenge ya kozwa bolamu ya solosolo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
w10 1/8 nk. 16-17

Yesu ateyi biso

Ndenge ya kozwa esengo

Wapi sekele ya kozala na esengo?

▪ Na maloba ya ebandeli na Lisolo Likoló ya Ngomba, Yesu alobelaki esengo. Alobaki boye: “Esengo na baoyo bayebi bobola na bango ya elimo.” (Matai 5:3) Alingaki koloba nini? Bamposa na biso ya elimo ezali nini?

Mpo na kozala na bomoi, moto azalaka na mposa ya kopema, komɛla, mpe kolya, ndenge kaka banyama mpe basalaka yango. Kasi, mpo na kozala na esengo, moto azalaka na mposa oyo banyama bazalaka na yango te​—mposa ya koyeba ntina ya bomoi. Kaka Mozalisi ya bomoi nde akoki kokokisa mposa yango. Yango wana, Yesu alobaki boye: “Moto asengeli kobika, kaka na mampa te, kasi na liloba nyonso oyo ezali kobima na monɔkɔ ya Yehova.” (Matai 4:4) Baoyo bayebi bobola na bango na elimo bazalaka na esengo mpamba te bapusanaka penepene na Yehova, “Nzambe ya esengo,” mpe apesaka bango eloko moko ya ntina mpo bázala na esengo​—elikya.​—1 Timote 1:11.

Ndenge nini Yesu apesaki bato elikya?

▪ Yesu alobaki boye: “Esengo na bato ya ezaleli ya boboto, mpo bakozwa libula ya mabele.” (Matai 5:5) Yesu apesaki bato elikya ndenge abikisaki bango na bamaladi mpe asekwisaki baoyo bakufaki. Ayaki mpe na nsango ya elikya. Alobaki boye: “Nzambe alingaki mokili mingi, yango wana apesaki Mwana na ye se moko oyo abotamaki, mpo moto nyonso oyo azali kondimela ye abomama te kasi azwa bomoi ya seko.” (Yoane 3:16) Bato oyo batosaka Nzambe bakozala na bomoi ya seko awa na mabele. Okoki komona na makanisi ete ozali elongo na bato ya ezaleli ya boboto mpe ozali kokóma mobange te? Yango wana, Liloba ya Nzambe elobi ete: “Bósepelaka na elikya.” (Baroma 12:12) Yesu alobelaki mpe ndenge ya kozala na esengo lelo oyo.

Toli nini Yesu apesaki mpo na kozala na bomoi ya esengo?

▪ Yesu apesaki toli oyo ebongi na makambo lokola boyokani na bato, libala, komikitisa, mpe lolenge malamu ya kotalela biloko ya mokili. (Matai 5:21-32; 6:1-5, 19-34) Kolanda toli ya Yesu ekosalisa yo ozala na esengo.

Kokaba epesaka esengo. (Misala 20:35) Na ndakisa, Yesu alobaki ete: “Ntango osali fɛti, bengisá babola, bibɔsɔnɔ, batɛngumi, bato oyo bakufá miso; mpe okozala na esengo, mpo bazali na eloko ya kozongisela yo te.” (Luka 14:13, 14) Baoyo balukaka esengo mpo na bango moko, bazwaka yango te; baoyo balukaka basusu bázwa esengo nde bazwaka esengo.

Likambo nini epesaka esengo koleka?

▪ Kosalela basusu makambo ekoki kopesa yo esengo, kasi kosalela Nzambe ekoki kopesa yo esengo koleka. Ata esengo oyo baboti oyo balingaka bana na bango bazalaka na yango ekoki kokokana na yango te. Yango emonanaki polele na oyo esalemaki mokolo moko ntango Yesu azalaki koteya bato. “Mwasi moko na kati ya ebele ya bato atombolaki mongongo na ye mpe alobaki na ye ete: ‘Esengo na libumu oyo ememaki yo mpe na mabɛlɛ oyo omɛlaki!’ Kasi ye alobaki ete: ‘Te, esengo nde na baoyo bazali koyoka liloba ya Nzambe mpe kotosa yango!’”​—Luka 11:27, 28.

Yesu mpe azwaki esengo na ndenge azalaki kosala mokano ya Tata na ye ya likoló. Mokano ya Nzambe ezali ete bato báyoka nsango ya elikya ya bomoi ya seko. Mokolo moko, nsima ya koyebisa elikya yango epai ya moto moko oyo asepelaki koyoka ye, Yesu alobaki boye: “Bilei na ngai nde kosala mokano ya moto oyo atindaki ngai.” (Yoane 4:13, 14, 34) Yo mpe okoki kozwa esengo soki ozali kosala likambo oyo esepelisaka Nzambe, elingi koloba kosakwela basusu solo ya Biblia.

Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mokapo 1 ya buku oyo, Biblia eteyaka mpenza nini?, ebimisami na Batatoli ya Yehova.

[Elilingi na lokasa 16]

Esengo ya solosolo eutaka na kokokisa mposa na biso ya koyeba ntina ya bomoi

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto