Mpo na bilenge
Boyá baninga mabe!
Malako: Tángá lisolo oyo na esika oyo makɛlɛlɛ ezali te. Ntango ozali kotánga bavɛrsɛ, salá lokola ozalaki wana ntango makambo yango esalemaki. Salá lokola nde ozali komona makambo yango mpe ozali koyoka mingongo. Omitya na esika ya bato oyo balobeli.
Bato oyo balobeli: Dina, Shekeme, Yakobo, Simeone mpe Levi
Na mokuse: Shekeme asangisaki na Dina nzoto na makasi, mpe bandeko ya Dina ya mibali basilikaki makasi mpe balukaki kozongisa mabe.
1 TALELÁ LISOLO OYO.—TÁNGÁ EBANDELI 34:1-31.
Okanisi ete Dina azalaki kosala misala nini ná baninga na ye na Kanana?
․․․․․
Okanisi ete Shekeme azalaki kosalela maloba ya ndenge nini mpo na “kondimisa” Dina?
․․․․․
Okanisi ete mongongo ya Yakobo ezali koyokana ndenge nini ntango azali kosilikela Simeone mpe Levi na vɛrsɛ 30?
․․․․․
2 KƆTÁ NA MOZINDO.
Okanisi ete mpo na nini Dina azalaki kokende mbala na mbala kotala bana basi ya Kanana? (Na ndakisa, ekoki kozala ete ye ná bango bazalaki na boyokani na makambo nini? Eloko nini akokaki kozwa epai ya bato ya Kanana oyo akokaki kozwa te na ndako na bango?)
․․․․․
Ekoki kozala ete bizaleli nini Dina amonaki epai ya Shekeme, oyo esalaki ete asepela na ye? (Tángá lisusu vɛrsɛ 3, 12, mpe 19.)
․․․․․
Ndenge nini Biblia emonisi ete Dina azalaki te na mposa ya kosangisa nzoto ná Shekeme? (Tángá lisusu vɛrsɛ 2.)
․․․․․
Okanisi ete ebongaki Simeone mpe Levi bázongisa mabe na koboma mibali ya mboka ya Shekeme? Soki Ɛɛ, mpo na nini? Soki te, mpo na nini?
․․․․․
3 SALELÁ MAKAMBO OYO OYEKOLI. KOMÁ MAKAMBO OYO OYEKOLI NA NTINA NA . . .
Ntina ya kopona baninga na yo malamu.
․․․․․
Ntina ya koyeba komipekisa ata soki basali yo mabe.
․․․․․
MAKAMBO MOSUSU OYO OKOKI KOSALELA.
Okoki kosala nini mpo omibatela na bato oyo batosaka mibeko ya Nzambe te, mpo básangisa na yo nzoto na makasi te?
․․․․․
4 NA LISOLO OYO, MAKAMBO NINI OMONI ETE EZALI NA NTINA MINGI MPO NA YO, MPE MPO NA NINI?
․․․․․
Soki ozali na biblia te, sɛngá Batatoli ya Yehova, to tángá mikanda mosusu oyo elimbolaka biblia na Internet na www.pr2711.com