Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w11 1/5 lok. 27
  • Bomoi ya seko na paradiso ekolɛmbisa biso?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bomoi ya seko na paradiso ekolɛmbisa biso?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Masolo mosusu
  • Nasala nini soki mwana na ngai alɛmbi na ye?
    Lisalisi mpo na libota
  • Nasala nini soki likambo moko elɛmbisi ngai?
    Mituna oyo bilenge batunaka
  • Osengeli kosala nini mpo ozwa bomoi ya seko?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Paradiso
    Lamuká!—2013
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
w11 1/5 lok. 27

Mituna ya batángi . . .

Bomoi ya seko na paradiso ekolɛmbisa biso?

▪ Biblia epesi biso elikya ete tokoki kozala na bomoi libela na libela na paradiso awa na mabele. (Nzembo 37:29; Luka 23:43) Kozala na bomoi seko na seko na mokili moko ya malamu mpenza ekolɛmbisa nde biso?

Motuna wana ezali na ntina mingi. Bato ya mayele bamonaki ete soki moto azali te kotya makanisi na ye esika moko ntango molai, akoki kokóma motema mokuse, kolɛmba nzoto, mpe akoki kozwa makama noki. Bato oyo bazalaka na mokano te na bomoi na bango to baoyo balɛmbaka mpo na mosala moko oyo basalaka mokolo na mokolo bakoki kolɛmba nzoto. Bomoi ya bato oyo bakokɔta na paradiso ekozanga nde mokano? Mosala ya mokolo na mokolo oyo bakobanda kosala ekosepelisa bango te?

Ya liboso, tóyeba ete ezali Yehova Nzambe, oyo akomisaki Biblia, nde apesi likabo ya bomoi ya seko. (Yoane 3:16; 2 Timote 3:16) Ezaleli ya Nzambe ya libosoliboso ezali bolingo. (1 Yoane 4:8) Yehova alingaka biso mingi mpe apesi biso biloko nyonso oyo tosepelaka na yango sikoyo.​—Yakobo 1:17.

Mozalisi na biso ayebi ete mpo tózala na esengo, tosengeli kozala na mosala moko ya ntina. (Nzembo 139:14-16; Mosakoli 3:12) Na paradiso, bato bakosala misala te lokola barobo. Mosala oyo bakosala ekozala mpo na litomba na bango moko mpe ya balingami na bango. (Yisaya 65:22-24) Soki ozali na mosala moko ya malamu oyo osalaka, mosala ya makasi mpe osalaka yango ntango nyonso, okomona ete bomoi ezali kolɛmbisa?

Tóbosana mpe te ete Yehova Nzambe akopesa nzela na moto nyonso te mpo afanda na paradiso. Azali kopesa likabo ya bomoi ya seko kaka epai ya bato oyo bazali komekola Mwana na ye, Yesu. (Yoane 17:3) Ntango Yesu azalaki awa na mabele, asepelaki kosala mokano ya Tata na ye. Ateyaki bayekoli na ye na maloba mpe na misala ete esengo ya solosolo eutaka nde na kopesa kasi na kozwa te. (Misala 20:35) Na paradiso oyo ekozongisama, bato nyonso bakotosa mibeko mibale oyo eleki monene, elingi koloba kolinga Nzambe mpe mozalani. (Matai 22:36-40) Kanisá naino ndenge okozala esika moko na bato oyo balingi yo mpe balingi mosala na bango! Okanisi ete okolɛmba nzoto kozala esika moko na bato ya lolenge wana?

Makambo nini mosusu ekozala na paradiso? Mokolo na mokolo, tokozala na likoki ya koyekola likambo moko ya sika mpo na Mozalisi na biso. Bato ya mayele basili komona makambo mingi ya kokamwisa na biloko oyo Yehova akelá. (Baroma 1:20) Tii lelo oyo, toyebi kaka mwa moke na misala ya kokamwa ya Nzambe. Eleki sikoyo bankóto ya bambula, Yobo, moto moko ya sembo akanisaki na biloko oyo Nzambe akelá, oyo ayebaki, mpe makambo oyo alobaki ezali kaka solo. Yobo alobaki boye: “Wana nde ebandeli ya banzela na [Nzambe], mpe oyo nde mwa nungunungu ya likambo bayoki mpo na ye! Kasi nkake na ye ya nguya, nani akomonisa ete akangi ntina na yango?”​—Yobo 26:14.

Ata soki toumeli na bomoi mbula boni, tokokoka soki moke te koyeba makambo nyonso etali Yehova Nzambe mpe misala na ye. Biblia elobi ete Nzambe atyaki likanisi ya kozala na bomoi ya seko na mitema na biso. Kasi, elobi mpe lisusu ete ‘tokoyeba te mosala oyo Nzambe ya solo asalá banda ebandeli tii na nsuka.’ (Mosakoli 3:10, 11) Okanisi ete okolɛmba nzoto na koyekola makambo ya sika etali Mozali na biso?

Ata na moi ya lelo, bato oyo basalaka mosala mingi mpo na bolamu ya basusu mpe mosala oyo epesaka Nzambe nkembo, bamonaka mpenza te ete balɛmbaka nzoto. Tondimi mpenza ete soki tozali kosala mosala ya ndenge wana, biso mpe tokolɛmba soki moke te, ata soki tozali na bomoi libela na libela.

[Eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 27]

Mabele: Image Science and Analysis Laboratory, NASA-Johnson Space Center; Galaksi: The Hubble Heritage Team (AURA/​STScI/​NASA)

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto