Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ijwyp lisolo 81
  • Nasala nini soki likambo moko elɛmbisi ngai?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nasala nini soki likambo moko elɛmbisi ngai?
  • Mituna oyo bilenge batunaka
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Oyo osengeli koyeba
  • Oyo okoki kosala
  • Nasala nini soki mwana na ngai alɛmbi na ye?
    Lisalisi mpo na libota
  • Mwango ya pɛtɛɛ ezali mpo na kosilisa mitungisi?
    Lamuká!—1995
  • Bomoi na yo etondi na mitungisi? Okoki kobongola yango!
    Lamuká!—1995
  • Bomoi ya seko na paradiso ekolɛmbisa biso?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
Makambo mosusu
Mituna oyo bilenge batunaka
ijwyp lisolo 81
Elenge mobali oyo azali na baaparɛyi mingi, kasi alali na mbeto mpe azali kotala plafɔ

MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA

Nasala nini soki likambo moko elɛmbisi ngai?

Bato mosusu bamonaka mabe soki bakangami na ndako mpo mbula ebɛti nsima ya midi mpe bazangi likambo ya kosala mpe esika ya kokende. Elenge mobali moko na nkombo Robert, alobi boye: “Na bantango ya bongo, nafandaka kaka mpe nayebaka te nasala nini.”

Osí omiyoka mpe bongo? Soki ɛɛ, lisolo oyo ekoki kosalisa yo!

  • Oyo osengeli koyeba

  • Oyo okoki kosala

  • Makambo bilenge mosusu balobi

Oyo osengeli koyeba

  • Kosalela baaparɛyi ya mikolo oyo ezali solisyo te.

    Kolukaluka makambo na Internet ekoki kozala lolenge ya kolekisa ntango, kasi ekoki mpe kopekisa yo okanisa mosika mpe kosala ete olɛmba mingi lisusu. Jeremy, oyo azali na mbula 21, alobi boye: “Okomona ete ozali kaka liboso ya ordinatɛrɛ kozanga kokanisa likambo moko.”

    Elenge mwasi moko na nkombo Elena, andimi likambo yango; alobi boye: “Makambo oyo okoki kosala na aparɛyi ezalaka na ndelo. Ekolongola likebi na yo na makambo ya solo na boye ete ntango okotya aparɛyi na yo pembeni, okolɛmba mingi lisusu!”

  • Makanisi malamu ekoki kosalisa.

    Kozala kaka na mingi ya kosala nde ekoki kosala ete otika komiyoka ete olɛmbi? Yango etaleli mingi ndenge oyo ozali kosepela na likambo oyo ozali kosala. Na ndakisa, elenge mwasi moko na nkombo Karen, alobi boye: “Kelasi ezalaki kolɛmbisa ngai, atako nazalaki na makambo ya kosala mokolo mobimba. Esɛngi omipesa na likambo ozali kosala mpo elɛmbisa yo te.”

Oyebaki yango? “Kozanga likambo ya kosala” ezali mokakatano te kasi nde libaku​—mpo na kokanisa makambo ya sika oyo okoki kosala.

Mbɛki ya fololo oyo ezali na gitare, biki ná papye mpe bisaleli ya moyemi

Ntango oyo ozali na yango ezali mpo na kokanisa makambo ya sika oyo okoki kosala

Oyo okoki kosala

Kómá kosepela na makambo ndenge na ndenge. Luká baninga ya sika. Bandá kolekisa ntango na likambo ya sika oyo olingaka. Yekolá masolo ya sika. Bato oyo basepelaka na makambo ndenge na ndenge ezalaka mpasi bámona ete kozala bango moko elɛmbisaka mpe kozala elongo na basusu elɛmbisaka bango mpenza te!

Toli ya Biblia: “Nyonso oyo lobɔkɔ na yo ezwi mpo na kosala, salá yango na makasi na yo mpenza.”​—Mosakoli 9:10.

“Mikolo oyo euti koleka nakómaki koyekola monɔkɔ ya Chinois Mandarin, mpe komekameka yango mokolo na mokolo esalisi ngai namona ete nazalaki mpenza na mposa ya kosala bongo. Nasepelaka kozala na likambo oyo nakoki kosala. Esalaka ete nasalisa makanisi na ngai mosala mpe nasalela ntango na ngai malamu mpenza.”​—Melinda.

Tyá makanisi na makambo oyo okani kosala. Soki oyebi ntina ya likambo oyo ozali kosala, mposa ya kosala yango ekobakisama. Ata badevuare ya kelasi ekoki kolɛmbisa yo mpenza te soki oyebi mokano na yo.

Toli ya Biblia: “Eloko oyo eleki malamu mpo na moto ezali te, longola kaka . . . komonisa molimo na ye bolamu mpo na mosala na ye ya makasi.”​—Mosakoli 2:24.

“Ntango nalingaki kosilisa kelasi, nakómaki koyekola ngonga mwambe na mokolo mpo nazalaki na retare. Elɛmbisaki ngai? Te, mpo nazalaki na ekateli ya kokokisa mokano na ngai. Natyaki makanisi na bapwɛ oyo nakozwa na nsuka​—diplome—​mpe yango epesaki ngai makasi.”​—Hannah.

Ndimá makambo oyo okokoka kobongola te. Ezala mikano ya malamu koleka oyo olingi kokokisa ekozala mpe na makambo oyo ekolɛmbisa yo. Ata moninga ya malamu koleka akoki kobongola programɛ mpe kosala ete ozanga likambo ya kosala. Na esika otika likambo ya ndenge wana ezangisa yo esengo, salá nyonso mpo ozala na makanisi malamu.

Toli ya Biblia: “Ye oyo azali na motema ya esengo azalaka na fɛti ntango nyonso.”​—Masese 15:15.

“Moninga moko ayebisaki ngai nayeba kosepela na ntango oyo nazali kaka ngai moko. Alobaki ete koyeba ndenge ya kosala ntango nazali elongo na baninga mpe ntango nazali ngai moko ezali likoki ya malamu mpenza oyo moto nyonso asengeli koyeba kosalela.”​—Ivy.

Makambo bilenge mosusu balobi

Hannah

“Nazalaki kolula bato oyo bomoi na bango ezalaki komonisa ete bazali na esengo. Na nsima, nayaki komona ete bazali lokola bato nyonso, kasi basalaki makambo. Yango wana nakómaki kosala makambo. Nakómaki kosala makambo oyo esepelisaka ngai mpe kosala bolukiluki na masolo ya kitoko. Ntango ozali koyekola makambo etali mokili, ekosepelisa yo mingi mpe okolinga kokoba koyekola makambo yango mpe ekolɛmbisa yo lisusu te.”​—Hannah.

Caleb

“Ntango nazalaki elenge mpenza, namipesaki na masano ya video mpo natika komiyoka ete nalɛmbi. Kasi ntango nakómaki kokola, namonaki ete masano yango ekokaki nde kolɛmbisa ngai mingi lisusu. Ekozwa yo ntango, kasi soki osilisi okomona ete osali eloko moko te. Namonaki makambo ya malamu ya kosala na ntango na ngai.”​—Caleb.

Micaela

“Nazalaki komona lokola mikolo ekómelaki ngai molai mpe ezalaki kolɛmbisa ngai, kasi nsukansuka namonaki ete soki nalingi ete bato bábengisa ngai mpo na kolekisa ntango elongo, ngai nde nasengeli liboso kosala bongo. Nakómaki kosala bongo mpe esalisaki ngai mingi mpenza. Sikoyo, nakómá kosepela na bantango oyo nazali ngai moko mpo ezalaka lisusu mingi te!”​—Micaela

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto