Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w11 1/9 lok. 15
  • “Ee Yehova, . . . oyebi ngai”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Ee Yehova, . . . oyebi ngai”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Masolo mosusu
  • Jehovah ayebi biso malamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Nzambe ayebi biso malamu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Nzambe ayebi yo malamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Yehova ‘asikolaki’ na ntango ya kala
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
w11 1/9 lok. 15

Pusaná penepene na Nzambe

“Ee Yehova, . . . oyebi ngai”

“LIKAMBO oyo esalaka moto mpasi koleka ezali ya koyeba ete moto moko te azali kokipe ye to komitya na esika na ye.”a Yo mpe omonaka bongo? Ekómelá yo naino te oyoka ete moto moko te azali kokipe yo to azali komitya na esika na yo, to mpe koyeba mikakatano na yo? Soki ezali bongo, likambo oyo ekoki kokitisa yo motema: Yehova akipaka mpenza basaleli na ye mpe atyaka likebi na makambo nyonso oyo bakutanaka na yango mokolo na mokolo. Maloba ya Davidi oyo ezali na Nzembo 139 ezali kondimisa biso likambo yango.

Lokola azalaki na elikya ete Nzambe azalaki kotyela ye likebi, Davidi alobaki boye: “Ee Yehova, otalitali ngai, mpe oyebi ngai.” (Vɛrsɛ 1) Na vɛrsɛ yango, Davidi asaleli maloba ya elilingi kitoko mpenza. Verbe ya Ebre oyo ebongolami na ‘kotalatala’ ekoki kolimbola kotimola mpo na koluka mabanga ya ntalo (Yobo 28:3), kotambola na mokili moko mpo na koyeba yango malamu (Basambisi 18:2), to kotalela malamumalamu likambo moko oyo bazali kosambisa (Kolimbola Mibeko 13:14). Ya solo, Yehova ayebi biso malamu na boye ete ezali lokola azali kotalatala na mozindo makambo nyonso ya bomoi na biso. Lokola Davidi asaleli liloba “ngai,” ateyi biso ete Nzambe atyelaka mosaleli na ye mokomoko likebi. Atalatalaka bango mpe ayebaka mokomoko na bango malamu.

Davidi alobelaki lisusu na mozindo ndenge Nzambe atalatalaka na maloba oyo: “Yo moko oyebi ntango nazali kofanda mpe ntango nazali kotɛlɛma. Uta na mosika otyeli likanisi na ngai likebi.” (Vɛrsɛ 2) Ya solo, Yehova azali “mosika,” mpamba te afandaka na likoló. Kasi, ayebi ntango tofandaka, na ndakisa na mpokwa nsima ya kosala mosala mokolo mobimba, mpe ntango totɛlɛmaka na ntɔngɔ mpo na kokende na misala na biso. Ayebaka mpe bamposa mpe makanisi na biso. Davidi azalaki nde kobanga lokola Yehova azalaki kotalatala ye ndenge wana? Te, kutu azalaki kosɛnga yango. (Vɛrsɛ 23, 24) Mpo na nini?

Davidi ayebaki ete Yehova atalatalaka basaleli na Ye mpo na koluka mabe na bango te. Davidi alobelaki makanisi yango ntango akomaki boye: “Ntango nazali kosala mobembo mpe ntango nazali komilalisa, nyonso wana ozali kotala yango malamumalamu, mpe oyebi malamu mpenza banzela na ngai nyonso.” (Vɛrsɛ 3) Mokolo na mokolo, Yehova amonaka ‘banzela na biso nyonso,’ elingi koloba mabunga na biso mpe misala na biso ya malamu. Yehova atyaka nde miso na ye na mabunga na biso to nde na makambo ya malamu? Liloba ya Ebre oyo ebongolami na ‘kotala malamumalamu’ ekoki kolimbola “koyungola” to “kopupola,” ndenge kaka mosali-bilanga apupolaka matiti mpo na kozwa mbuma ya malamu. Liloba ya Ebre oyo ebongolami na “oyebi malamu” ekoki kolimbola “kolinga mingi.” Mokolo na mokolo ntango Yehova ayokaka maloba mpe atalaka misala ya basaleli na ye, asepelaka na oyo ya malamu. Mpo na nini? Mpo alingaka mingi milende oyo basalaka mpo na kosepelisa ye.

Nzembo 139 ezali koteya biso ete Yehova amibanzabanzaka mpenza mpo na basaleli na ye. Atalatalaka bango mpe abatelaka bango na misala na bango ya mokolo na mokolo. Na bongo, ayebaka mikakatano oyo bakutanaka na yango, mpe makambo oyo esalaka bango mpasi. Motema na yo ezali kotinda yo osambela Nzambe yango oyo atyelaka basambeli na ye likebi? Soki ezali bongo, okoki kondima likambo oyo: Yehova akoki soki moke te ‘kobosana mosala na yo mpe bolingo oyo omoniselaki nkombo na ye.’​—Baebre 6:10.

Botángi ya Biblia mpo na sanza ya Sɛtɛmbɛ:

◼ Nzembo 119-150

[Maloba na nse ya lokasa]

a Maloba ya mokomi Arthur Stainback.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto