Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w12 1/2 lok. 15
  • “Ngai nakobosana yo te”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Ngai nakobosana yo te”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Masolo mosusu
  • Nzambe akipaka biso?
    Kondima ya solosolo—Ekosalisa yo ozala na bomoi ya esengo
  • “Mawa monene ya Nzambe na biso”
    Pusaná penepene na Yehova
  • Yehova​—⁠Tata na biso oyo atondi na motema mawa
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • “Nzambe azali bolingo”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
w12 1/2 lok. 15

Pusaná penepene na Nzambe

“Ngai nakobosana yo te”

YEHOVA akipaka mpenza bato oyo basalelaka ye? Soki ezali bongo, akipaka bango tii wapi? Tokoki kozwa biyano na mituna wana kaka na nzela moko: na nzela ya makambo oyo Nzambe ye moko ayebisi biso. Na Biblia, Yehova amonisi polele ndenge oyo ayokaka. Tótalela maloba oyo ezali na Yisaya 49:15.

Mpo na komonisa ndenge oyo ayokaka mpenza mpo na bato na ye, na nzela ya Yisaya, Yehova asaleli ndakisa moko ya kosimba motema mpo na kosalisa biso. Abandi na motuna oyo ekoki kotinda moto akanisa: “Mwasi akoki nde kobosana mwana na ye oyo ye azali komɛlisa mabɛlɛ mpe ayokela mwana ya libumu na ye mawa te?” Soki moto akanisi malamu te, akomona lokola eyano ezali mpasi te. Ndenge nini mama oyo azali komɛlisa mwana akoki kobosana mwana na ye? Bamposa nyonso ya mwana, ezala na butu to na moi, ezalaka na mabɔkɔ ya mama na ye; mpe soki bebe azali na mposa ya eloko, mama na ye ayebaka yango. Kasi motuna oyo Yehova atuni esuki wana te.

Mpo na nini mama abatelaka mwana na ye mpe alukaka kokokisa mposa nyonso ya mwana? Ezali kaka mpo mwana atika kolela? Te. Mama nyonso azalaka na mawa mpo na “mwana ya libumu na ye.” Verbe ya Ebre oyo ebongolami na “mawa” elimbolaka mpe ‘koyokela mawa.’ (Kobima 33:19; Yisaya 54:10) Liloba yango ekoki kopesa likanisi ya kozala na mawa mingi mpo na bato oyo bazangi moto ya kosalisa to kobatela bango. Mawa oyo mama azalaka na yango mpo na mwana oyo ye azali komɛlisa ekoki kosalisa biso tómona bolingo makasi ya mama mpo na mwana.

Kasi likambo ya mawa, mama nyonso te nde ayokelaka bebe na ye mawa. Yehova alobi ete: “Ata basi wana bakoki kobosana.” Tofandi na mokili oyo mibali mpe basi mingi ‘bazangi bosembo, balinganaka te na kati ya libota.’ (2 Timote 3:1-5) Ntango mosusu toyokaka nsango ya bamama oyo bakipaka babebe na bango te, banyokolaka bango to babwakaka bango. Mpo na kolimbola Yisaya 49:15, buku moko oyo elimbolaka Biblia elobi boye: “Bamama bazali basumuki mpe ntango mosusu na esika bámonisa bolingo bazangaka nde bomoto. Ata bolingo oyo eleki makasi ekoki kokita.”

Yehova alobi na biso ete: “Ngai nakobosana yo te.” Sikoyo, tokoki komona polele ntina oyo Yehova atuni motuna oyo ezali na Yisaya 49:15. Likanisi oyo alingi kobimisa awa ezali te ya komikokanisa na basi wana, kasi nde ya komonisa ete akeseni mpenza na bango. Na kokesana na bamama oyo bazangi kokoka, oyo mbala mosusu bakoki te komonisela bana na bango motema mawa, Yehova akoki soki moke te kozanga komonisa motema mawa epai ya basaleli na ye oyo bazali na bosɛnga. Yango wana, buku oyo tolobelaki liboso elobi boye mpo na Yisaya 49:15: “Na Kondimana ya kala, yango ezali moko ya maloba oyo eleki makasi mpo na komonisa bolingo oyo Nzambe azali na yango.”

Koyeba “mawa monene ya Nzambe na biso” ezali mpenza kobɔndisa biso. (Luka 1:78) Mpo na nini te koluka koyeba ndenge oyo okoki mpenza kokóma moninga ya Yehova? Nzambe wana ya bolingo alaki basaleli na ye boye: “Nakotika yo soki moke te mpe nakosundola yo ata moke te.”​—Baebre 13:5.

Botángi ya Biblia mpo na Febwali:

◼ Yisaya 43-62

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto