Oyebaki yango?
Bato bazalaki mpenza kobɛta piololo na matánga na ntango ya Yesu?
▪ Biblia elobi ete na ntango ya kala bazalaki kobɛta piololo na bafɛti. (1 Bakonzi 1:40; Yisaya 5:12; 30:29) Elobi mpe ete bazalaki kobɛta piololo na matánga. Piololo ezali ebɛteli ya miziki kaka moko oyo bazalaki kobɛta na libaku wana. Evanzile ya Matai elobi ete Moyuda moko oyo azalaki mokonzi asɛngaki Yesu abikisa mwana na ye ya mwasi, oyo akómaki pene ya liwa. Kasi ntango Yesu akómaki na ndako ya mokonzi yango, “amonaki babɛti-piololo ná ebele ya bato na yikiyiki makasi,” mpo mwana yango asilaki kokufa.—Matai 9:18, 23.
Matai amikosi nde ntango alobeli kobɛta piololo na esika ya matánga? William Barclay, mobongoli moko ya Biblia, alobi boye: “Na ntango ya kala, na bikólo mingi lokola Roma, Grɛsi, Phénicie, Assyrie mpe Palestine, soki bayoki piololo ebɛti na ndenge ya mawa, mbala moko bazalaki koyeba ete moto akufi to likambo moko ya mawa esalemi.” Talmud, buku ya mibeko ya Bayuda, elobi ete na siɛklɛ ya liboso ya ntango na biso, ata soki moyuda oyo azali nsuka ya mobola akufeli mwasi, akokaki kofuta babɛti-piololo mibale mpe mwasi moko oyo ayebi kolela mpo bálela mwasi na ye. Flavius Josèphe, moto ya mayele na istware oyo azalaki na bomoi na siɛklɛ ya liboso, akomaki ete na mobu 67 ya ntango na biso, ntango nsango ekómaki na Yerusaleme ete Baroma babɔtɔli engumba Jotapata, na Galile, mpe babomi bato oyo bazalaki kofanda wana, “bato mingi oyo bazalaki kolela bandeko na bango bafutaki babɛti-piololo mpo bábɛta miziki ya mawa na matánga na bango.”
Mabe nini mibali mibale oyo babomamaki elongo na Yesu basalaki?
▪ Biblia ebengi basali-mabe yango “miyibi.” (Matai 27:38; Marko 15:27) Babuku mosusu oyo elimbolaka maloba ya Biblia emonisi ete Makomami esalelaka maloba mibale mpo na kokesenisa lolenge mibale ya miyibi. Liloba ya Grɛki kleptes emonisaka moyibi oyo ayibaka na ndenge ya kobombama. Biblia esaleli liloba yango mpo na kolobela Yudasi, oyo azalaki koyiba mbongo na kɛsi ya bayekoli na ndenge ya kobomboma. (Yoane 12:6) Nzokande, liloba lestes, esalelamaka mbala mingi mpo na kolobela miyibi oyo babɛtaka bato, basalaka bato mabe, mpe babɔtɔlaka bato biloko na makasi. Basali-mabe oyo babomamaki elongo na Yesu bazalaki miyibi ya lolenge wana. Kutu, Biblia elobi ete moko na bango alobaki: “Tozali kozwa oyo ekoki na makambo oyo tosalaki.” (Luka 23:41) Maloba wana emonisi ete bazalaki na ngambo ya makambo mingi, kasi kaka ya koyiba te.
Ndenge moko na miyibi wana mibale, Barabasi azalaki lolenge ya moyibi oyo babengi lestes. (Yoane 18:40) Luka 23:19 emonisi polele ete Barabasi azalaki kaka moyibi mpamba te, mpo vɛrsɛ yango elobi ete “abwakamaki na bolɔkɔ mpo atombokisaki bato na engumba mpe mpo azalaki koboma bato.”
Na yango, atako basali-mabe oyo babomamaki elongo na Yesu bazalaki koyiba, ekoki mpe kozala ete bazalaki kotombokisa bato, ata mpe koboma bato. Ezala bongo to te, Ponsi Pilate oyo azalaki guvɛrnɛrɛ ya Roma amonaki ete ebongaki bábaka bango na nzete.