Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w12 1/6 lok. 9
  • “Oyo elakisi bomoi ya seko”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Oyo elakisi bomoi ya seko”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Masolo mosusu
  • Tózwa boyebi sikoyo mpe mpo na libela
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • “Oyo elimboli bomoi ya seko”
    Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Boyebi oyo euti na Nzambe ezali koyanola na ebele ya mituna
    Mosala na biso ya Bokonzi—1997
  • Bato bazali na mposa ya boyebi ya Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
w12 1/6 lok. 9

“Oyo elakisi bomoi ya seko”

“Oyo elakisi bomoi ya seko, báyekola koyeba yo, Nzambe ya solo kaka moko, mpe moto oyo yo otindaki, Yesu Kristo.”​—YOANE 17:3.

BOYEBI ekoki kobikisa bato. Ntango Nouhou, mwa mwana moko ya sanza zomi abɛlaki, mama na ye oyo asalaka na ebongiseli moko ya bokɔlɔngɔnɔ ya nzoto na ekólo Niger, ayebaki likambo oyo asengelaki kosala. Asangisaki sukali ná mungwa na mai ya pɛto mpo na komɛlisa mwana mpo mai esila na nzoto te. Ebongiseli ya ONU mpo na bana (UNICEF) elobi ete lokola mama yango “asalaki nokinoki mpe lokola ayebaki makambo ya monganga, maladi ya mwana na ye ekendaki mosika te.”

Boyebi ya Biblia ekoki mpe kobikisa bato. Moize, moto ya liboso oyo akomaki Biblia, alobaki boye: “Liloba oyo ezangi ntina te mpo na bino, kasi ezali nde bomoi na bino, mpe na nzela ya liloba oyo, bokoki koyeisa mikolo na bino mingi.” (Kolimbola Mibeko 32:47) Biblia ekoki mpenza koyeisa mikolo na biso mingi? Na ndenge nini yango elimboli bomoi na biso?

Masolo mitano oyo touti kolobela emonisi ete Biblia ezali buku oyo ekeseni na babuku mosusu nyonso, mpo ezali na bisakweli oyo tokoki kotyela motema, elobeli makambo oyo istware mpe siansi endimi, mikanda na yango nyonso ezali na boyokani, mpe toli na yango esalisaka bato. Nyonso wana esali ete Biblia ekesana na babuku mosusu nyonso. Na yango, ntango Biblia elobi ete tokoki kozala na bomoi molai​—bomoi ya seko—​omoni te ete ebongi mpenza otalela yango malamumalamu?

Tosɛngi yo oyekola Biblia mpe omona ndenge boyebi ya sikisiki ekoki komemela yo kimya ya makanisi lelo oyo mpe esengo na mikolo oyo ezali koya. Batatoli ya Yehova bakosepela kolakisa yo ndenge ya kozwa boyebi yango.

[Etanda/​Elilingi na lokasa 9]

Biblia ekeseni mpe na babuku mosusu mpo kaka yango nde epesaka biyano ya malamu na mituna ya ntina mingi oyo tomitunaka:

• Mpo na nini tozali awa na mabele?

• Mpo na nini bampasi ezali mingi boye?

• Elikya nini ezali mpo na bandeko na ngai oyo bakufá?

Okoki kozwa biyano ya Biblia na mituna yango na buku oyo, Biblia eteyaka mpenza nini?, ebimisami na Batatoli ya Yehova.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto