Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w12 1/6 nk. 16-17
  • Mpo na nini tosengeli kosalela nkombo ya Nzambe?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mpo na nini tosengeli kosalela nkombo ya Nzambe?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Masolo mosusu
  • Nkombo ya Nzambe
    Lamuká!—2017
  • Nkombo ya Nzambe nani?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2019
  • Mpo na nini tosengeli koyeba nkombo ya Nzambe
    Nkombo ya Nzambe oyo ekoumela seko
  • Oyebi nkombo ya Nzambe mpe osalelaka yango?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
w12 1/6 nk. 16-17

Yekolá na Liloba ya Nzambe

Mpo na nini tosengeli kosalela nkombo ya Nzambe?

Lisolo oyo ezali na mituna oyo mbala mosusu omitunaka mpe emonisi esika oyo okoki kozwa biyano na Biblia na yo. Batatoli ya Yehova bakosepela kotalela biyano yango elongo na yo.

1. Mpo na nini Nzambe amipesá nkombo?

Na ntembe te, olingaka ete bábenga yo na nkombo na yo, na esika bábenga yo kaka “mobali” to “mwasi.” Nkombo esalisaka mpo na kokesenisa bato. Nzambe abengamaka na batitre lokola “Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso,” “Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso,” mpe ‘Mozalisi Monene.’ (Ebandeli 15:2; 17:1; Mosakoli 12:1) Kasi, amipesá nkombo mpo na kosalisa biso tókóma baninga na ye. Na lingala, nkombo ya Nzambe ezali Yehova.​—Tángá Yisaya 42:8.

Atako babongoli mingi ya Biblia balongolá nkombo ya Nzambe mpe na esika na yango batyá maloba lokola “Nzambe” mpe “Nkolo,” nkombo yango ezali mbala pene na 7 000 na bamaniskri ya kala ya Biblia na Ebre. Ezali polele ete Nzambe alingi bato báyeba nkombo na ye.​—Tángá Yisaya 12:4.

2. Mpo na nini koyeba nkombo ya Nzambe ezali na ntina?

Koyeba nkombo ya Nzambe esuki kaka te na koyeba ndenge ya kobenga yango. Koyeba Nzambe na nkombo elimboli kokóma mpenza moninga na ye. Nkombo Yehova elimboli “Akómisaka.” Ndimbola ya nkombo yango ezali ndanga ete Nzambe akokóma nyonso oyo alingi mpo na kokokisa mokano na ye. Boye, koyeba nkombo ya Nzambe esɛngi kondima ete Nzambe akokokisa bilaka na ye. (Nzembo 9:10) Kondima ya bato oyo bayebi nkombo ya Nzambe mpe basalelaka yango etindaka bango bátyela ye motema mpe bátya ye na esika ya liboso na bomoi na bango. Yehova Nzambe akobatela bato ya ndenge wana.​—Tángá Nzembo 91:14.

3. Mpo na nini Nzambe alingi ete nkombo na ye eyebana?

Nzambe alingi ete bato báyeba nkombo na ye mpo yango ezali mpo na bolamu na bango. Ezali kosalisa bango bákóma baninga na ye mpe bázwa na elikya ya bomoi ya seko. Yango wana, Yehova alingi ete tóyebisa bato nkombo na ye!​—Tángá Yoane 17:3; Baroma 10:13, 14.

Yesu alakisaki bato nkombo ya Nzambe na ndenge ateyaki bango banzela ya Nzambe, mibeko na Ye, mpe bilaka na Ye. Lelo oyo, bayekoli ya Yesu bazali kokoba mosala ya kolakisa bato nkombo ya Nzambe na bikólo nyonso. Bazali kosala yango na bomoko lokola “ekólo moko mpo na nkombo [ya Nzambe].”​—Tángá Misala 15:14; Yoane 17:26.

4. Ndenge nini Nzambe akokumisa nkombo na ye?

Yehova Nzambe alingi kokumisa nkombo na ye mpo nkombo yango efingamaki. Na ndakisa, bato mosusu balobaka ete Nzambe akelá bomoi te yango wana ntina ya kotosa ye ezali te. Bato mosusu balobaka ete akipaka biso te mpe ete ye nde abimiselaka bato bampasi. Bato ya ndenge wana bafingisaka nkombo ya Nzambe. Kasi, bakosala yango libela te. Nzambe akoboma baoyo nyonso bazali kosambwisa nkombo na ye.​—Tángá Nzembo 83:17, 18.

Yehova akokumisa nkombo na ye ntango Bokonzi na ye ekosukisa baguvɛrnema nyonso ya bato mpe ekozongisela bato kimya mpe bakobanga ata eloko te. (Danyele 2:44) Mosika te, moto nyonso akoyeba ete Yehova azali Nzambe ya solo.​—Tángá Ezekiele 36:23; Matai 6:9.

Osengeli kosala nini? Mpo opusana penepene na Nzambe, osengeli koyekola Liloba ya Nzambe mpe koyanganaka elongo na bato oyo balingaka ye. Ntango Yehova akokumisa nkombo na ye, akobosana te basaleli na ye ya sembo.​—Malaki 3:16.

Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mokapo 1 ya buku oyo, Biblia eteyaka mpenza nini?, ebimisami na Batatoli ya Yehova.

[Elilingi na lokasa 16]

Nkombo ya Nzambe na maniskri ya kala ya Ebre

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto