Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w12 1/7 nk. 16-17
  • Bikelamu ya elimo bakoki kosala biso nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bikelamu ya elimo bakoki kosala biso nini?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Masolo mosusu
  • Baanzelu bazali banani?
    Makambo oyo Biblia eteyaka
  • Baanzelu bazali banani mpe basalaka nini?
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Biyano na mituna ya Biblia
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Bikelamu ya elimo—Bakoki kosala biso mabe to malamu?
    Biblia eteyaka mpenza nini?
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
w12 1/7 nk. 16-17

Yekolá na Liloba ya Nzambe

Bikelamu ya elimo bakoki kosala biso nini?

Lisolo oyo ezali na mituna oyo mbala mosusu omitunaka mpe emonisi esika oyo okoki kozwa biyano na Biblia na yo. Batatoli ya Yehova bakosepela kotalela biyano yango elongo na yo.

1. Baanzelu bazali banani?

Baanzelu bazali bikelamu ya elimo oyo bafandaka na likoló. Bakeseni na bato mosika mpenza. Nzambe ya solo, oyo azali mpe elimo, asalaki baanzelu liboso ya kosala mabele. (Yobo 38:4, 7; Matai 18:10) Yehova afandaka elongo na bamilio ya baanzelu ya sembo.​—Tángá Nzembo 103:20, 21; Danyele 7:9, 10.

2. Baanzelu basalisaka bato?

Baanzelu basalisaki Lota, moto moko ya sembo. Azalaki kofanda na engumba moko oyo Nzambe azwaki ekateli ya kobebisa yango mpo bato na yango bazalaki kosala mabe. Baanzelu mibale bakebisaki Lota ná libota na ye ete bákima. Bato mosusu bazwaki likebisi yango na lisɛki mpe balandaki yango te. Kasi, Lota ná bana na ye babikaki mpo batosaki likebisi oyo Nzambe apesaki na nzela ya baanzelu.​—Tángá Ebandeli 19:1, 13-17, 26.

Biblia elobi ete baanzelu bazali kosalisa bato lelo oyo na ndenge bazali kokamba mosala ya baoyo, na bosembo nyonso, bazali kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. (Matai 24:14) Nsango malamu ezali mpe na nsango ya likebisi. Ndenge moko na likebisi oyo Lota azwaki, ezali likambo ya lisɛki te. Likebisi yango euti na Nzambe na nzela ya baanzelu.​—Tángá Emoniseli 1:1; 14:6, 7.

Nzambe akoki kosalela baanzelu mpo na kolendisa biso ntango tomekami. Asalelaki anzelu moko mpo na kolendisa Yesu.​—Tángá Luka 22:41-43.

Mosika te, Nzambe akosalela baanzelu mpo na koboma bato mabe mpo na bampasi oyo bazali kobimisa. Yango ekokitisa mpenza mitema ya bato.​—Tángá 2 Batesaloniki 1:6-8.

3. Bademo basalaka biso nini?

Kaka ndenge bato mingi awa na mabele basalaka mabe mpe baboyaka kotosa Nzambe, baanzelu mingi mpe na likoló batombokelaki Nzambe. (2 Petro 2:4) Baanzelu yango babengamaka bademo. Mokonzi na bango ezali Satana Zabolo. Satana ná bademo na ye bazali kokosa bato.​—Tángá Emoniseli 12:9.

Mpo na kokosa bato mpe kokómisa bango mosika na Nzambe, Satana azali kosalela mimbongo oyo ezangi bosembo, baguvɛrnema ya bato mpe mangomba ya lokuta. Soki bato bazali konyokwama na makambo oyo ezangi bosembo, na mobulu mpe na bampasi, ezali nde mpo na Satana.​—Tángá 1 Yoane 5:19.

4. Ndenge nini bademo bakosaka bato?

Satana akosaka bato mingi na ndenge ateyaka bango ete bato oyo bakufá bakómaka bilimo oyo bakoki kosolola na bato. Kasi, Biblia elobi ete bato oyo bakufá bakoki kosala ata eloko moko te. (Mosakoli 9:5) Nzokande, mbala mingi bademo bakosaka bato na ndenge bamekolaka mingongo ya bato oyo bakufá. (Yisaya 8:19) Bademo bakosaka bato mosusu na nzela ya bato oyo basololaka na bilimo, bato ya bikelakela, bato oyo basakolaka makambo oyo ebombaná mpe bato oyo batalaka minzoto mpo na koyeba makambo oyo ekoya. Liloba ya Nzambe elobi ete tóboya misala nyonso ya ndenge wana. Na yango, tosengeli kolongola eloko nyonso oyo tozali na yango oyo ezali na boyokani na bademo mpe misala ya molili.​—Tángá Kolimbola Mibeko 18:10, 11; Misala 19:19.

Soki tolingaka Yehova, ntina ya kobanga bademo ezali te. Ntango toyekolaka Liloba ya Nzambe mpe tosalelaka oyo yango elobi, totɛmɛlaka Zabolo mpe topusanaka penepene na Nzambe. Yehova aleki bademo na nguya mingi. Baanzelu na ye ya sembo bakoki kolendisa biso ntango tozali na mposa na yango.​—Tángá Nzembo 34:7; Yakobo 4:7, 8.

Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mokapo 10 ya buku oyo, Biblia eteyaka mpenza nini?, ebimisami na Batatoli ya Yehova.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto