ELOBELI TITRE YA EZIPELI | BIBLIA EZALI NA NSANGO NINI?
Ndenge nini toyá na mokili?
Na mokuse, Ebandeli, mokanda ya liboso ya Biblia, emonisi ndenge molɔ́ngɔ́ ebandá, elobi boye: “Na ebandeli Nzambe azalisaki likoló mpe mabele.” (Ebandeli 1:1) Nsima ya kokela banzete mpe banyama, Nzambe akelaki Adama ná Eva, bato ya liboso. Bakesanaki mpenza na banyama mpo bato bazalaka na mwa bizaleli oyo Nzambe azalaka na yango, na ndakisa bonsomi ya kopona. Na yango, bazalaki koyeba makambo oyo bazalaki kosala. Soki bátosaka mibeko ya Nzambe, balingaki kokokisa mokano na ye ya kozala baboti ya liboso mpo na bato ya mokili mobimba oyo balingaki kozala na bomoi ya kimya mpe ya kokoka awa na mabele mpo na libela.
Kasi, anzelu moko to ekelamu moko ya elimo amonaki yango libaku malamu ya kokosa bato mpo na koluka litomba na ye moko. Na ndenge yango, akómaki Satana, oyo elakisi “Motɛmɛli.” Na nzela ya nyoka, Satana akosaki Eva, ayebisaki ye ete akozala malamu koleka soki alandi litambwisi ya Nzambe te. Adama ná Eva balandaki Satana mpe babebisaki boyokani na bango na Mozalisi na bango. Lokola baponaki nzela mabe, baboti na biso ya liboso babungisaki bomoi ya seko mpe batikelá biso nyonso lisumu, ezaleli ya kozanga kokoka, mpe liwa.
Na mbala moko, Nzambe amonisaki mposa na ye ya kobongisa likambo wana ya mpasi mpe kopesa bana ya Adama likoki ya kozwa bomoi ya seko. Nzambe asakolaki ete “momboto,” to moto moko ya ntina mingi, akoboma Satana mpe akolongola mpasi nyonso oyo Satana, Adama, mpe Eva babimisá. (Ebandeli 3:15) Nani asengelaki kozala “momboto” yango? Esengelaki koyebana na nsima.
Liboso momboto yango aya, Satana alukaki ntango nyonso kotɛmɛla mokano ya Nzambe. Lisumu mpe makambo ya mabe epalanganaki nokinoki. Nzambe azwaki ekateli ya koboma bato mabe na Mpela. Ayebisaki Noa moto ya sembo asala masuwa—kɛsi moko monene oyo ekokaki kotepa likoló ya mai mpo ebikisa ye mpe libota na ye, mpe banyama oyo Nzambe ayebisaki ye akɔtisa na masuwa.
Mbula moko nsima ya Mpela, Noa ná libota na ye babimaki na masuwa mpo na kofanda na mokili oyo ekómaki pɛto. Kasi “momboto” amonanaki naino te.
—Euti na Ebandeli mokapo 1-11; Yuda 6, 14, 15; Emoniseli 12:9.