Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w14 1/6 lok. 16
  • Biyano na mituna ya Biblia

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biyano na mituna ya Biblia
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Masolo mosusu
  • Nzambe alaki ete mabele ekobebisama nyonso te
    Lamuká!—2023
  • Likabo ya seko oyo Mozalisi apesi bato
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Na nimero oyo ya Lamuká!
    Lamuká!—2023
  • Bato bakobebisa mabele mpo na libela?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
w14 1/6 lok. 16

BIYANO NA MITUNA YA BIBLIA

Mabele ekelamaki mpo na nini?

Elenge mobali moko azali kotalatala biloko ndenge na ndenge oyo ezali na mokili

Mabele ekelamaki mpo ezala esika ya malamu mpo na bato

Mabele ezali esika oyo ebongi mpenza mpo na bikelamu ya bomoi. Ezali na mai mingi, oyo ezali na ntina mpo na bomoi. Ndenge oyo mabele etɛngamá mpe ebalukaka esalaka ete bibale ekóma glasi to mɔtɔ makasi te. Etando oyo ezingi mabele (atmosphère) mpe nguya oyo ebatelaka mabele (champ magnétique) esalaka ete mɔtɔ ya mabe oyo moi ebimisaka ebebisa yango te. Ndenge banzete mpe banyama esalaka na boyokani ekamwisaka mpenza. Na yango, bato mingi bamoni ete mabele ekelamaki mpamba te.​—Tángá Yisaya 45:18.

Kasi okoki komituna boye: ‘Bampasi mpe kozanga bosembo ezali mpe na kati ya mokano ya Nzambe?’​—Tángá Kolimbola Mibeko 32:4, 5.

Mokano ya Mozalisi mpo na mabele ekokokisama?

Mabele ekelamaki mpo ezala esika moko malamu mpo na bato oyo bapesanaka limemya mpe balingaka Mozalisi na bango. Na yango, bomoi ya bato ezali na ntina mingi koleka oyo ya banzete to banyama. Biso bato tokoki koyeba soki Mozalisi azali nani mpe kosepela na bolingo mpe bosembo ya Nzambe mpe komekola ye.​—Tángá Mosakoli 12:13; Mika 6:8.

Mozalisi na biso akoki kosala makambo nyonso oyo akani. Na yango, tosengeli kondima ete akosilisa bampasi mpe kozanga bosembo mpe akosala ete mabele ekóma mpenza esika ya malamu mpo na bato.​—Tángá Nzembo 37:11, 29; Yisaya 55:11.

Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mokapo 3 ya buku oyo: Biblia eteyaka mpenza nini?, ebimisami na Batatoli ya Yehova

Ezali mpe na www.pr2711.com

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto