Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w14 1/12 lok. 7
  • Yango nde lolenge ya bomoi oyo eleki malamu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yango nde lolenge ya bomoi oyo eleki malamu
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Masolo mosusu
  • Omiyokaka ete ozali penepene na Nzambe?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Mpo na nini osengeli kokoba?
    Nsango malamu oyo euti na Nzambe!
  • Okoki kokóma moninga ya Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2019
  • Ozali na boyokani ya ndenge nini ná Yehova?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
w14 1/12 lok. 7
Mobali oyo azali kotánga Biblia

ELOBELI TITRE YA EZIPELI | OKOKI KOPUSANA PENEPENE NA NZAMBE

Yango nde lolenge ya bomoi oyo eleki malamu

Okoki kosala nini mpo opusana penepene na Nzambe? Touti kotalela mwa makambo oyo okoki kosala mpo okóma mpenza moninga na ye:

  1. Koyeba nkombo ya Nzambe, Yehova mpe kosalela yango.

  2. Kosolola na ye mbala na mbala na libondeli mpe koyekola Liloba na ye Biblia.

  3. Kokoba kosala makambo oyo esepelisaka Yehova.

Mobali oyo azali kobondela

Saleláká nkombo ya Nzambe, bondeláká ye, yekoláká Liloba na ye mpe saláká makambo oyo esepelisaka ye mpo opusana penepene na ye

Na kotalela makambo oyo, okoki mpenza koloba ete osalaka makambo oyo esɛngami mpo na kopusana penepene na Nzambe? Ezali na makambo oyo omoni ete osengeli kobongisa? Na ntembe te, yango ezali kosɛnga milende, kasi talelá matomba oyo yango ekobimisa.

Jennifer oyo afandaka na États-Unis, alobi boye: “Milende nyonso oyo moto asalaka mpo na kokóma moninga ya Nzambe ezali na ntina. Boninga yango ememelaka moto mapamboli mingi: Okotyela lisusu Nzambe konfianse, okoyeba malamumalamu bizaleli na ye, kasi oyo eleki nyonso, okolinga ye mingi lisusu. Yango nde lolenge ya bomoi oyo eleki malamu!”

Soki okolinga kokóma moninga ya Nzambe, Batatoli ya Yehova bakosepela kosalisa yo. Bakoki koya koyekola na yo Biblia ofele. Okoki mpe kokende na makita na bango na Ndako ya Bokonzi oyo ezali pene na esika ofandi, kuna okokuta bato oyo bazwaka boninga na bango na Nzambe na valɛrɛ mingi.a Soki osali bongo, yo mpe okomiyoka lokola mokomi moko ya Nzembo oyo alobaki boye: “Mpo na ngai, kobɛlɛma na Nzambe ezali malamu.”​—Nzembo 73:28.

a Mpo na kosɛnga boyekoli ya Biblia to koyeba Ndako ya Bokonzi oyo ezali pene na esika ofandi, sololá na moto oyo amemeli yo zulunalo oyo to kɔtá na site na biso www.pr2711.com mpe talá na nse esika bakomi KOMELÁ BISO.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto