Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w15 1/9 lok. 5
  • Batatoli ya Yehova bandimaka makambo nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Batatoli ya Yehova bandimaka makambo nini?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Masolo mosusu
  • Bindimeli ya ba Témoins de Jéhovah ezali nini?
    Bindimeli ya ba Témoins de Jéhovah ezali nini?
  • Batatoli ya Yehova
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • Mpo na nini tosakolaka?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Makambo nini Batatoli ya Yehova bandimaka?
    Mituna oyo bato batunaka mingi mpo na Batatoli ya Yehova
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
w15 1/9 lok. 5
Mwasi ná mobali oyo bazali Batatoli ya Yehova bazali koyekola na bana na bango Biblia

ELOBELI TITRE YA EZIPELI | BATATOLI YA YEHOVA BAZALI BANANI?

Batatoli ya Yehova bandimaka makambo nini?

Batatoli ya Yehova bandimaka ete “Makomami nyonso ekomami na litambwisi ya elimo ya Nzambe mpe ezali na litomba.” (2 Timote 3:16) Tosalelaka Biblia mpo na koyekola makambo etali Mozalisi mpe mpo na kozala na bomoi ya esengo.

Biblia elobi boye: “Báyeba ete yo, oyo nkombo na yo ezali Yehova, Yo moko nde Oyo-Aleki-Likoló na mabele mobimba.” (Nzembo 83:18) Na yango, tosambelaka kaka Yehova Nzambe mpe lokola tozali Batatoli na ye, tosalaka nyonso tóyebisa bato nkombo na ye.​—Yisaya 43:10-12.

Lokola tozali bakristo, tondimaka ete Yesu, “Mwana ya Nzambe,”a ayaki na mokili mpe akómaki Masiya. (Yoane 1:34, 41; 4:25, 26) Nsima ya liwa na ye, Yesu asekwaki mpe azongaki na likoló. (1 Bakorinti 15:3, 4) Na nsima, akómaki mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe. (Emoniseli 11:15) Bokonzi yango ezali guvɛrnema ya solosolo oyo ekozongisa mabele paradiso. (Danyele 2:44) Biblia elobi boye: “Bato ya komikitisa bakozwa mabele, mpe bakosepela mpenza na kimya mingi.”​—Nzembo 37:11, 29.

“Ntango batángaka Biblia, bandimaka ete Nzambe nde alobaka na bango. Soki bakutani na mikakatano na bomoi na bango, basalelaka Liloba ya Nzambe mpo na koluka solisyo. . . . Mpo na bango, Liloba ya Nzambe ezali na bomoi.”​—Benjamin Cherayath, mokonzi moko ya Lingomba ya Katolike, zulunalo moko (Münsterländische Volkszeitung), Allemagne

Batatoli ya Yehova bandimaka ete batoli ya Biblia ekoki kosalisa bato ata lelo oyo. (Yisaya 48:17, 18) Yango wana tolandaka mpenza batoli yango. Na ndakisa, lokola Biblia ekebisaka biso na bizaleli oyo ebebisaka nzoto mpe makanisi, tomɛlaka makaya te mpe tosalelaka drɔgɛ te. (2 Bakorinti 7:1) Toboyaka mpe bizaleli oyo Biblia epekisi mpenza, na ndakisa kolangwa masanga, pite mpe koyiba.​—1 Bakorinti 6:9-11.

a Biblia ebengi mpe Yesu ‘Mwana ya Nzambe se moko oyo abotamaki’ mpo azali ekelamu ya liboso oyo Yehova akelaki ye moko.​—Yoane 3:18; Bakolose 1:13-15.

Baboti oyo basɛki ntango mwana na bango ya moke azali kofungola kado

Mpo na koyeba mateya na biso, ata mpe ntina oyo tosalaka te bafɛti ya Bonane to Noele mpe toboyaka bázongisa biso makila, kɔtá na site www.pr2711.com mpe fungolá esika bakomi MAKAMBO ETALI BISO > MITUNA OYO BATO BATUNAKA MINGI.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto