Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w15 1/12 lok. 3
  • Mpo na nini koyeba mateya ya Biblia?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mpo na nini koyeba mateya ya Biblia?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Masolo mosusu
  • Biyano na mituna ya Biblia
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Buku oyo esengeli koyeba mateya na yango
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Ndenge ya kosalisa baoyo bakómi naino pene te ya koyekola Biblia eteyaka
    Mosala na biso ya Bokonzi—2013
  • Mateya ya solo oyo esepelisaka Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
w15 1/12 lok. 3

ELOBELI TITRE YA EZIPELI | OKOKI KOYEBA MATEYA YA BIBLIA

Mpo na nini koyeba mateya ya Biblia?

“Biblia ezali buku ya Nzambe oyo eyebani mingi. Kasi, Ba-Chinois bayebi mateya na yango te mpe ezalaka na ntina te mpo na bango.”​—LIN, CHINE.

“Nayebaka kutu te mateya ya babuku mosantu ya lingomba na ngai ya Hindu, bongo ndenge nini nakoki koyeba mateya ya Biblia?”​—AMIT, INDE.

“Nazalaka na limemya mpo na Biblia mpo ezali buku ya kala mpe nayoká ete ezali buku oyo etɛkamaka mingi koleka babuku mosusu nyonso. Kasi naino namoná Biblia te.”​—YUMIKO, JAPON.

Bato mingi na mokili mobimba bazwaka Biblia na valɛrɛ mingi. Kasi bayebaka mateya ya Biblia te to bayebaka kaka mwa ndambo. Ezali bongo mpo na bamilio ya bato oyo bafandaka na Asie, ata mpe mpo na bato mingi na bikólo oyo Biblia ezalaka mingi.

Mwasi oyo azali kotánga Biblia

Kasi, okoki komituna boye: ‘Mpo na nini nasengeli koluka koyeba mateya ya Biblia?’ Koyeba makambo oyo ezali na buku mosantu yango ekoki kosalisa yo osala makambo oyo elandi:

  • Osepela na oyo ozali na yango mpe ozala na esengo

  • Olonga mikakatano ya libota

  • Olonga mitungisi

  • Oyokanaka malamu na bato

  • Osalelaka mbongo na mayele

Tózwa ndakisa ya Yoshiko, na Japon. Azalaki komituna soki Biblia elobelaka makambo nini mpe azwaki ekateli ya kotánga yango. Nini esalemaki? Alobaki boye: “Biblia esalisaki ngai nayeba ntina ya bomoi mpe nazala na elikya mpo na mikolo ezali koya.” Abakisaki boye: “Namiyokaka lisusu te lokola nazangi eloko.” Amit, oyo tolobelaki liboso, azwaki ye moko ekateli ya koyekola Biblia. Alobi boye: “Nakamwaki. Biblia ezali na batoli ya malamu mpo na moto nyonso.”

Biblia esalisi mpenza bamilio ya bato. Mpo na nini te oyekola yango mpo omona ndenge ekoki kosalisa yo?

Une vie pleinement satisfaisante: Comment?

Mpo na koyeba makambo mosusu etali ndenge Biblia ekoki kosalisa yo, talá mwa buku Une vie pleinement satisfaisante: Comment? ebimisami na Batatoli ya Yehova.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto