Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • wp16 No. 3 lok. 16
  • Biblia elobi nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biblia elobi nini?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2016
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Nzambe azali na nkombo?
  • Ezali mabe kotánga nkombo ya Nzambe?
  • Nkombo ya Nzambe
    Lamuká!—2017
  • Mpo na nini tosengeli kosalela nkombo ya Nzambe?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Mpo na nini tosengeli koyeba nkombo ya Nzambe
    Nkombo ya Nzambe oyo ekoumela seko
  • Nkombo ya Nzambe nani?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2019
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2016
wp16 No. 3 lok. 16
Nkombo ya Nzambe emonisami polele na maniskri ya kala ya Biblia

Nkombo ya Nzambe (emonisami polele) ndenge emonani na maniskri ya kala ya Biblia

Biblia elobi nini?

Nzambe azali na nkombo?

BATO MOSUSU BALOBAKA ete azali na nkombo te, basusu balobaka ezali Nzambe to Nkolo, mpe bato mosusu balobaka ete azali na bankombo ebele. Okanisi nini?

OYO BIBLIA ELOBI

“Yo, oyo nkombo na yo ezali Yehova, Yo moko nde Oyo-Aleki-Likoló na mabele mobimba.”​—Nzembo 83:18.

MAKAMBO NINI MOSUSU TOKOKI KOYEKOLA NA BIBLIA?

  • Atako Nzambe azali na batitre ebele, amipesá kaka nkombo moko.​—Kobima 3:15.

  • Nzambe azali libombami te; alingi tóyekola koyeba ye.​—Misala 17:27.

  • Koyeba Nkombo ya Nzambe ekoki kozala likambo ya liboso mpo na kokóma moninga na ye.​—Yakobo 4:8.

Ezali mabe kotánga nkombo ya Nzambe?

OKOLOBA NINI?

  • Ɛɛ

  • Te

  • Ntango mosusu

OYO BIBLIA ELOBI

“Osengeli te kozwa nkombo ya Yehova Nzambe na yo na lisɛki.” (Kobima 20:7) Kosalela nkombo ya Nzambe ezali mabe kaka soki tosaleli yango na kozanga limemya.​—Yirimia 29:9.

MAKAMBO NINI MOSUSU TOKOKI KOYEKOLA NA BIBLIA?

  • Yesu ayebaki Nkombo ya Nzambe mpe azalaki kosalela yango.​—Yoane 17:25, 26.

  • Nzambe azali kosɛnga biso tóbenga ye na Nkombo na ye​—Nzembo 105:1.

  • Banguna ya Nzambe balukaka ete bato bábosana Nkombo ya Nzambe.​—Yirimia 23:27.

Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mokapo 1 ya buku oyo, Biblia eteyaka mpenza nini?, ebimisami na Batatoli ya Yehova

Ezali mpe na www.pr2711.com

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto