Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 2/12 lok. 3
  • Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2012
Mosala na biso ya Bokonzi—2012
km 2/12 lok. 3

Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Mituna oyo elandi ekotalelama na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na pɔsɔ oyo ebandi na mokolo ya 27 Febwali 2012. Dati ya lisolo mokomoko epesami mpo na kosalisa mosakoli asala bolukiluki pɔsɔ na pɔsɔ wana azali kobongisa masolo ya eteyelo.

1. Koloba ete motema mawa ya Yehova elɛmbisaka bosembo na ye, elongobani to te? (Yis. 30:18) [9 Yan., w02 1/3 lok. 30]

2. Liteya nini tokoki kozwa na ndenge oyo Shebena alongolamaki na mosala ya kapita ya ndako ya mokonzi Hizikiya? (Yis. 36:2, 3, 22) [16 Yan., w07 15/1 lok. 8 par. 6]

3. Liteya nini tokoki kozwa na lisolo oyo ezali na Yisaya 37:1, 14-20, oyo emonisi nini tosengeli kosala na ntango ya mpasi? [16 Yan., w07 15/1 lok. 9 par. 1-2]

4. Ndenge nini ndakisa oyo Biblia esaleli na Yisaya 40:31 elendisaka basaleli ya Yehova? [23 Yan., w96 15/6 nk. 10-11]

5. Maloba ya Yehova oyo ezali na Yisaya 41:14 ezali kolendisa biso mpo na etumba nini oyo ekosalema mosika te? [23 Yan., ip-2 lok. 24 par. 16]

6. Ndenge nini tokoki komonisa epai ya Yehova ete tozali “kolanda boyengebene”? (Yis. 51:1) [6 Feb., ip-2 lok. 165 par. 2]

7. “Ebele ya bato” oyo Yisaya 53:12 elobeli bazali banani, mpe liteya nini ya malamu mingi tozwi na mapamboli oyo Yehova abombeli bango? [13 Feb., ip-2 lok. 213 par. 34]

8. Makambo nini basaleli ya Yehova bamoni na mikolo ya nsuka oyo emonisami na maloba ya elilingi oyo ezali na Yisaya 60:17? [20 Feb., ip-2 lok. 316 par. 22]

9. “Mbula ya boboto” oyo Yesu mpe bayekoli na ye basengelaki kosakola elimboli nini? (Yis. 61:2) [20 Feb., ip-2 nk. 324-325 par. 7-8]

10. Ezaleli nini malamu ya Yehova emonisami na Yisaya 63:9? [27 Feb., w03 1/7 lok. 19 par. 22-23]

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto