Okanisi ete Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na Lingelesi ya pɛtɛɛ ekosalisa yo?
Nimero ya boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ezali sikoyo mpe na Lingelesi ya pɛtɛɛ. Babimisi yango mpo na (1) basakoli oyo balobaka Lingelesi, mpo elobeli wana ya pɛtɛɛ esalisa bango mpamba te, mbala mosusu batánga kelasi mingi te; (2) basakoli oyo monɔkɔ na bango ya mboka ezali Lingelesi te; (3) bilenge, ezala mpe oyo bazali na kelasi ya ebandeli mpe ya ntei; mpe (4) bayekoli ya Biblia oyo esengeli koteya bango mateya ya Biblia na elobeli ya pɛtɛɛ mpe ya polele.
Mitángo ya baparagrafe, mituna, mpe mitó ya makambo moke ekokani na nimero oyo tosalelaka. Mateya ezali mpenza ndenge moko, kasi na maloba ya pɛtɛɛ. Motambwisi ya Boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe motángi basengeli kosalela nimero ya boyekoli oyo bato nyonso basalelaka; kasi bakoki kosalela Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na Lingelesi ya pɛtɛɛ soki bayangani mingi bazali kosalela yango. Baoyo bazali na nimero ya Lingelesi ya pɛtɛɛ bakomona ete bavɛrsɛ ya kotánga mpe bililingi ekokani, mpe bakozala na likoki ya kolanda botángi ya baparagrafe mpe kopesa biyano.
Moto oyo amoni ete Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli yango ekosalisa ye, akoki kosɛnga yango epai ya ndeko oyo atalelaka bazulunalo mpo eyaka sanza nyonso.