Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w25 Septembre nk. 2-7
  • ‘Bengá bankulutu’

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • ‘Bengá bankulutu’
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • NTANGO NINI TOSENGELI ‘KOBENGA BANKULUTU’?
  • MPO NA NINI TOSENGELI KOBENGA BANKULUTU?
  • NDENGE NINI BANKULUTU BASALISAKA BISO?
  • MOKUMBA NA BISO MOKO
  • Ndenge ya komonisa bolingo mpe motema mawa ntango ndeko moko asali lisumu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
  • Ndenge oyo lisangá ya bakristo ya solo ebongisami
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Ndeko mobali​—⁠Ozali koluka kokóma nkulutu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
  • Babateli ya mpate oyo basalaka mpo na bolamu ya basaleli ya Yehova
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2023
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
w25 Septembre nk. 2-7

LISOLO YA BOYEKOLI 36

LOYEMBO 103 Babateli ya mpate—Makabo oyo ezali bato

‘Bengá bankulutu’

“Abenga bankulutu ya lisangá.”—YAK. 5:14.

NA MOKUSE

Tokomona ntina ya koluka lisalisi ya bankulutu na ntango oyo tosengeli na yango.

1. Ndenge nini Yehova amonisi ete bampate na ye bazali na motuya na miso na ye?

BAMPATE ya Yehova bazali na motuya mingi na miso na ye. Asombaki bango na makila ya Yesu mpe apesaki bankulutu ya lisangá mokumba ya kobatela etonga na Ye. (Mis. 20:28) Nzambe alingi ete bankulutu básalelaka bampate na ye makambo na boboto mpenza. Yesu azali mokonzi ya lisangá mpe bankulutu balandaka litambwisi na ye na ndenge balendisaka bampate mpe babatelaka bango na makama ya elimo.—Yis. 32:​1, 2.

2. Banani oyo Yehova atyelaka likebi mingi koleka? (Ezekiele 34:​15, 16)

2 Yehova amibanzabanzaka mpenza mpo na bampate to basaleli na ye nyonso, kasi baoyo bazali na mpasi atyelaka bango likebi mingi. Na nzela ya bankulutu, asalisaka baoyo bazali kobɛla na elimo. (Tángá Ezekiele 34:​15, 16.) Kasi, alingaka ete tóluka lisalisi ntango tozali na mposa na yango. Ntango tobɛli na elimo, longola kobondela Nzambe na etingya mpo asalisa biso, tosengeli mpe koluka lisalisi ya “babateli ya mpate mpe bateyi” na lisangá.—Ef. 4:​11, 12.

3. Ndenge nini biso nyonso tokoki kozwa matomba soki totaleli mokumba ya bankulutu?

3 Na lisolo oyo, tokotalela ebongiseli oyo Nzambe atye mpo na kopesa biso lisalisi ya elimo na nzela ya bankulutu. Tokozwa biyano na mituna oyo: Ntango nini tosengeli kosɛnga bankulutu básalisa biso? Mpo na nini tosengeli kosala yango? Mpe ndenge nini basalisaka biso? Ata soki boyokani na biso na Yehova ezali malamu sikoyo, biyano na mituna yango ekosalisa biso tóbakisa botɔndi mpo na ebongiseli oyo Nzambe atye; mpe koyeba makambo yango ekoki kosalisa biso mokolo mosusu.

NTANGO NINI TOSENGELI ‘KOBENGA BANKULUTU’?

4. Mpo na nini tolobi ete Yakobo 5:​14-16, 19, 20 elobeli maladi ya elimo? (Talá mpe bililingi.)

4 Mpo na kolobela ebongiseli oyo Yehova atye mpo na kopesa biso lisalisi ya elimo, moyekoli Yakobo abandi na motuna oyo: “Moto moko azali na maladi na kati na bino? Abenga bankulutu ya lisangá.” (Tángá Yakobo 5:​14-16, 19, 20.) Bavɛrsɛ mosusu ya mokapo yango emonisi ete Yakobo azalaki kolobela maladi ya elimo, elingi koloba boyokani ya moto na Yehova ebebi. Na ndakisa, Yakobo alobi na moto oyo azali na maladi abenga nde bankulutu, kasi monganga te. Yango ezali maladi ya elimo mpo Yakobo amonisi ete moto yango akoki kobika ntango masumu na ye elimbisami. Makambo oyo moto oyo azali na maladi ya elimo asengeli kosala ekokani na oyo esalemaka mpo na kobikisa maladi ya nzoto. Soki tobɛli, tokendaka epai ya monganga, toyebisaka ye ndenge tozali koyoka, mpe tosalaka makambo oyo asɛngi biso. Ndenge moko mpe, ntango tobɛli na elimo, tosengeli koluka bankulutu, koyebisa bango likambo na biso, mpe kosalela toli ya Biblia oyo bapesi biso.

Bililingi: 1. Mobali moko azali koyebisa monganga mpasi oyo azali koyoka na lipeka. 2. Ndeko mobali moko afandi elongo na nkulutu moko mpe azali koyebisa ye likambo na ye.

Ntango nzoto ebɛli, tokendaka epai ya monganga; ntango tobɛli na elimo, tosengeli koluka bankulutu (Talá paragrafe 4)


5. Ndenge nini tokoki koyeba soki boyokani na biso na Yehova ebandi kolɛmba?

5 Yakobo mokapo 5 ezali kolendisa biso tósolola na bankulutu ntango tomoni ete tobandi kobɛla na elimo na lolenge moko boye. Nzokande tokomonisa bwanya mpenza soki toluki lisalisi na bango liboso ete tóbebisa mpenza boyokani na biso na Nzambe. Tosengeli komitalelaka na bosembo. Biblia emonisi ete soki tokebi te, tokoki kokanisa ete tozali makasi na elimo, nzokande tozali komikosa. (Yak. 1:22) Bakristo mosusu na Sarde bazalaki kokanisa ete bazalaki kosepelisa Yehova, kasi Yesu ayebisaki bango ete bakufá na elimo. (Em. 3:​1, 2) Mpo na koyeba soki tozali malamu na elimo, tokoki kokokanisa esengo oyo tozali na yango sikoyo na losambo ya Yehova na oyo tozalaki na yango liboso. (Em. 2:​4, 5) Tokoki komituna boye: ‘Esengo oyo nazalaki na yango ya kotánga Biblia mpe komanyola ekitá? Nabongisaka lisusu makita nyonso te mpe nayanganaka na makita pɔsɔ nyonso te? Molende na ngai na mosala ya kosakola ekiti? Nakómi kolekisa ntango mingi na kokanisa kaka bisengo mpe biloko ya mosuni?’ Soki oyanoli “ɛɛ” na moko ya mituna yango, ekoki komonisa ete ozali na bolɛmbu moko oyo soki obundisi yango te, ekoki kobebisa makambo. Soki biso moko tokoki te kolonga bolɛmbu yango, to soki esili kotinda biso tóbuka mibeko ya Nzambe, tosengeli kosɛnga lisalisi epai ya bankulutu.

6. Baoyo basali lisumu ya monene basengeli kosala nini?

6 Kasi, soki tosali lisumu ya monene, oyo ekoki kosala ete moto alongolama na lisangá, tosengeli kosolola na bankulutu. (1 Ko. 5:​11-13) Moto oyo akwei na lisumu ya monene akoki te kozongisa boninga na ye na Yehova ye moko, asengeli koluka lisalisi. Mpo Yehova alimbisa biso na nzela ya lisiko, tosengeli kosala ‘misala oyo emonisi ete tobongoli motema.’ (Mis. 26:20) Moko ya misala yango ezali koluka bankulutu.

7. Banani lisusu bazali na mposa ya lisalisi ya bankulutu?

7 Bankulutu basalisaka kaka te baoyo basali lisumu ya monene, kasi basalisaka mpe baoyo bazali na bolɛmbu na elimo. (Mis. 20:35) Na ndakisa, mbala mosusu ozali kobanga ete okolonga te kobundisa bamposa ya mabe. Ekoki kozala mpasi olonga bamposa yango mingimingi soki liboso ete oyeba solo ozalaki komɛla drɔgɛ, kotala pornografi, to kosala pite. Yebá ete osengeli te kobunda na mikakatano yango kaka yo moko. Okoki komona malamu osolola na nkulutu moko oyo oyebi ete akoyoka yo na likebi, akopesa yo toli oyo ebongi, mpe akomonisa yo ete okoki kosepelisa Yehova soki okobi kotɛmɛla bamposa ya mabe mpe okokisi yango te. (Mos. 4:12) Soki olɛmbi nzoto mpo ozali kaka kobundisa bamposa ya mabe, nkulutu yango akoki kokundwela yo ete mbala mosusu yango emonisi ete ozwaka boyokani na yo na Yehova na motuya, ozali na komikitisa mpe oboyi komityela motema koleka ndelo.—1 Ko. 10:12.

8. Tosengeli kosolola na bankulutu mpo na libunga nyonso oyo tosali? Limbolá.

8 Ezali na ntina te tókende epai ya bankulutu mpo na libunga nyonso oyo tosali. Na ndakisa, kanisá ete okatelaki ndeko moko lingala, mbala mosusu kutu osilikaki. Na esika okende koluka nkulutu mpo na yango, okoki kosalela toli ya Yesu ya kotya kimya kati na yo ná ndeko na yo. (Mat. 5:​23, 24) Okoki kosala bolukiluki mpo na bizaleli lokola boboto, motema molai, mpe komipekisa mpo omonisa bizaleli yango malamu mbala ya nsima. Kasi, soki olongi te kosilisa mokakatano na yo, okoki kaka kosɛnga nkulutu moko asalisa yo. Na mokanda na ye epai ya Bafilipi, ntoma Paulo asɛngaki ndeko mobali moko oyo nkombo epesami te asalisa Evodi ná Sɛntishe básilisa matata na bango; nkulutu moko ya lisangá na bino mpe akoki kosalisa yo na likambo ya ndenge wana.—Flp. 4:​2, 3.

MPO NA NINI TOSENGELI KOBENGA BANKULUTU?

9. Mpo na nini tosengeli te kotika ete nsɔni epekisa biso kobenga bankulutu? (Masese 28:13)

9 Tosengeli kozala na kondima mpe na mpiko mpo na kosɛnga lisalisi ntango tosali lisumu ya monene to ntango tomoni ete tozali kolonga te bolɛmbu moko oyo tozalaka na yango. Tosengeli te kotika ete nsɔni epekisa biso kobenga bankulutu. Mpo na nini? Mpo Yehova nde atye ebongiseli ya bankulutu mpo na kosalisa biso tózala na boyokani malamu na ye mpe kondima makasi. Soki tosololi na bankulutu, tokomonisa ete totyelaka Yehova mpe litambwisi na ye motema. Tondimaka ete tosengeli na lisalisi na ye ntango tolingi kokwea. (Nz. 94:18) Mpe ntango tosali lisumu, Nzambe akomonisela biso motema mawa soki toyamboli masumu na biso mpe totiki yango.—Tángá Masese 28:13.

10. Nini ekoki kosalema soki toluki kobomba masumu na biso?

10 Soki tosololi na bankulutu na ntango oyo tozali na mposa ya lisalisi, Yehova akolimbisa biso mpe boyokani na biso na ye ekozonga malamu; kasi soki tobombi lisumu na biso, tokobebisa lisusu makambo. Ntango Mokonzi Davidi alukaki kobomba masumu na ye, boyokani na ye na Yehova ezalaki malamu te, anyokwamaki na mayoki, ata mpe na nzoto. (Nz. 32:​3-5) Ndenge moko na maladi na nzoto to mpɔta, mbala mingi mokakatano ya elimo ekómaka makasi soki tosali eloko te mpo na yango. Lokola Yehova ayebi yango malamu, asɛngi biso “tóbongisa makambo” na ye na nzela ya ebongiseli ya bankulutu mpo tóbika.—Yis. 1:​5, 6, 18.

11. Ndenge nini basusu mpe bakoki komona mpasi soki tobombi masumu ya minene?

11 Soki tobombi lisumu ya monene oyo tosali, basusu mpe bakoki komona mpasi. Tokoki kopekisa elimo ya Nzambe esala na lisangá mobimba mpe tokoki kobebisa kimya ya bandeko. (Ef. 4:30) Ndenge moko mpe, soki toyebi ete ndeko moko na lisangá asali lisumu ya monene, tosengeli kolendisa ye ayebisa bankulutu likambo yango.a Kobomba lisumu ya moto ekomemisa biso mpe ngambo mpo na lisumu yango. (Lev. 5:1) Lokola tolingaka Yehova, tosengeli kozala na mpiko mpe koyebisa bankulutu solo. Na bongo, tokosalisa na kobatela lisangá pɛto mpe tokosalisa mosumuki akóma lisusu na boyokani malamu na Yehova.

NDENGE NINI BANKULUTU BASALISAKA BISO?

12. Ndenge nini bankulutu basalisaka baoyo bazali na bolɛmbu na elimo?

12 Biblia eyebisi bankulutu básalisaka baoyo bazali na bolɛmbu na elimo. (1 Tes. 5:14) Soki osali lisumu, bankulutu bakoki kotuna yo mituna oyo ekomonisa bososoli mpo na kobimisa makanisi mpe mayoki ya motema na yo. (Mas. 20:5) Okosalisa bango soki oyebisi bango makambo polele, ata soki ezali mpasi osala yango na kotalela mimeseno ya mboka na bino, bomoto na yo, to nsɔni oyo ozali koyoka mpo na likambo oyo ekómeli yo. Kobanga te ete makambo oyo okoloba emonana lokola “bilobaloba mpamba.” (Yobo 6:3) Bankulutu bakozwa ekateli nokinoki te; kasi bakosala makasi ya koyoka yo na likebi mpe koyeba likambo mobimba liboso ya kopesa yo toli. (Mas. 18:13) Bayebi ete kosalisa bampate ezwaka ntango, yango wana bakanisaka te kosilisa likambo ya monene kaka na lisolo ya liboso.

13. Na ndenge nini bankulutu basalisaka biso na nzela ya mabondeli na bango mpe batoli ya Biblia? (Talá mpe bililingi.)

13 Ntango obengi bankulutu, bakosala nyonso ete bátinda yo te omipesa foti koleka. Kasi, bakobondela nde mpo na yo. Okoki kokamwa ndenge mabondeli na bango ekoki kozala na “nguya mingi” mpe ekosalisa yo omiyoka malamu. Mpo na kosalisa yo, bankulutu ‘bakopakola yo mpe mafuta na nkombo ya Yehova.’ (Yak. 5:​14-16) “Mafuta” yango ezali mateya ya solo ya Liloba ya Nzambe. Bankulutu bakotángela yo bavɛrsɛ oyo ebongi mpe yango ekoki kokitisa yo motema mpe kobɔndisa yo mpo na kosalisa yo obongisa boyokani na yo na Yehova. (Yis. 57:18) Batoli na bango oyo euti na Biblia ekoki kopesa yo makasi ya kokoba kosala oyo ezali malamu. Na nzela ya bankulutu, okoki koyoka Yehova azali koloba na yo: “Nzela yango oyo. Tambolá na yango.”—Yis. 30:21.

Bililingi: 1. Monganga ya elilingi ya liboso azali sikoyo kosimba lipeka ya mobali yango mpo na koyeba nini ezali kotungisa ye. Bakɔtisi lipeka ya mobali yango na radio mpe ezali komonana na efelo. 2. Nkulutu ya elilingi ya liboso ná nkulutu mosusu bayei kolendisa ndeko mobali wana na ndako na ye. Ndeko mobali yango azali koyoka bankulutu yango na esengo.

Bankulutu basalelaka Biblia mpo na kokitisa motema mpe kobɔndisa ndeko oyo asali lisumu (Talá paragrafe 13-14)


14. Na kotalela Bagalatia 6:​1, ndenge nini bankulutu basalisaka ndeko nyonso oyo “abɛti libaku”? (Talá mpe bililingi.)

14 Tángá Bagalatia 6:1. Ntango mokristo “abɛti libaku,” atamboli te na boyokani na mibeko ya sembo ya Nzambe. Libaku yango ekoki kozala ete azwi ekateli oyo ezangi bososoli to abuki mpenza mobeko ya Nzambe. Lokola bankulutu balingaka bandeko, ‘balukaka kosembola moto yango na elimo ya boboto.’ Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “kosembola” ezalaki mpe kosalelama mpo na kolobela ndenge bazongisaka mokuwa na esika na yango mpo moto atikala na mbeba libela te. Kaka ndenge monganga ya malamu asalaka nyonso mpo mpasi ezala makasi te ntango azali kozongisa moto mokuwa na esika na yango, bankulutu mpe balukaka kosalisa moto na maladi ya elimo kozanga ete bábakisela ye mpasi. Biblia eyebisi bankulutu ete ‘bango moko mpe bámitalaka.’ Ntango bankulutu bazali kosalisa moto asembola banzela na ye, bayebaka ete bango mpe bazali bato ya kozanga kokoka mpe bakoki kobɛta libaku. Na esika bákanisa ete baleki basusu, bámimonisaka sembo koleka ndelo te, to bazalaka makambo makasi te, basalaka nde nyonso bámitya na esika ya moto oyo bazali kosalisa.—1 Pe. 3:8.

15. Tokoki kosala nini soki tozali na likambo moko?

15 Tosengeli kotyela bankulutu motema. Bazwaka baformasyo na oyo etali kobomba makambo ya bandeko, kosalela Biblia mpo na kopesa toli na esika ya koloba makanisi na bango moko, mpe kokoba kosalisa biso tómema mikumba na biso. (Mas. 11:13; Gal. 6:2) Bankulutu bazali na bomoto mpe na makoki ekeseni, kasi tóbangaka te kopusana epai ya nkulutu nyonso oyo tolingi mpo na koyebisa ye likambo oyo tozali na yango. Yango elingi koloba te ete tokokende epai ya nkulutu moko nsima ya mosusu mpo na kosɛnga toli, tii tokozwa nkulutu oyo akoyebisa biso makambo oyo ekosepelisa biso. Soki tosali bongo, tokozala lokola baoyo bazali koluka “makambo oyo matoi na bango elingi koyoka” na esika báyoka “mateya oyo epesaka litomba,” oyo ezali na Liloba ya Nzambe. (2 Tim. 4:3) Ntango tokeyi koyebisa nkulutu likambo oyo tozali na yango, mbala mosusu akotuna biso soki toyebisaki mpe bankulutu mosusu likambo yango mpe toli nini bapesaki biso. Mpe bopɔlɔ ekoki kotinda ye atuna naino toli epai ya nkulutu mosusu.—Mas. 13:10.

MOKUMBA NA BISO MOKO

16. Mokumba nini mokomoko na biso azali na yango?

16 Atako bankulutu bakɛngɛlaka biso mpo tozali bampate ya Nzambe, bayebisaka biso te oyo tosengeli kosala. Kozala na bomoi oyo emonisi ete tokangami na Nzambe ezali mokumba ya mokomoko na biso. Tosengeli kozongisa monɔkɔ epai ya Nzambe mpo na maloba mpe misala na biso. Na lisalisi na ye, tokoki kozwa bikateli ya malamu mpe kobatela bosembo na biso. (Rom. 14:12) Na yango, na esika báyebisa biso oyo tosengeli kosala, bankulutu balakisaka biso nde makanisi ya Nzambe oyo ezali na Liloba na ye. Soki tozali kolanda batoli na bango oyo euti na Biblia, tokoki koteya ‘makoki na biso ya kososola’ mpo na kozwa bikateli ya bwanya.—Ebr. 5:14.

17. Tosengeli kozala na ekateli nini?

17 Tozali mpenza na libaku kitoko ya kozala na kati ya bampate ya Yehova! Yehova atindaki Yesu, “mobateli ya mpate oyo aleki malamu,” mpo afuta lisiko mpo tókoka kozala na libaku ya kozwa bomoi ya seko. (Yoa. 10:11) Mpe na nzela ya ebongiseli ya bankulutu ya lisangá, Yehova akokisi elaka na ye oyo: “Nakopesa bino babateli oyo bakosala makambo ndenge nalingi, mpe bakoleisa bino na boyebi mpe na mayele ya kososola.” (Yir. 3:15) Ntango tolɛmbi to tobɛli na elimo, tosengeli kokakatana te kobenga bankulutu mpo básalisa biso. Tiká ete tózala na ekateli ya kosalela malamu ebongiseli oyo Yehova atye na nzela ya bankulutu ya masangá.

OKOPESA EYANO NINI?

  • Ntango nini tosengeli ‘kobenga bankulutu’?

  • Mpo na nini tosengeli kobenga bankulutu?

  • Ndenge nini bankulutu basalisaka biso?

LOYEMBO 31 Tambolá elongo na Nzambe!

a Soki asali yango te nsima ya mwa ntango, bosembo na yo epai ya Yehova esengeli kotinda yo oyebisa bankulutu makambo oyo oyebi.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto