Mituna ya batángi
Mokomi ya Masese 30:18, 19 alobaki ete “nzela ya mobali ntango azali ná mwasi ekamwisaka” ‘ekamwisaka mingi mpenza.’ Mpo na nini ezali solo?
Maloba yango ebimisaka mituna epai ya bato mingi, ata mpe bato mosusu ya mayele na makambo ya Biblia. Vɛrsɛ yango na mobimba na yango na Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika elobi boye: “Ezali na makambo misato oyo ekamwisaka ngai mingi mpenza, mpe minei oyo nakokaka kokanga ntina te: Nzela ya mpongo na likoló, nzela ya nyoka likoló ya libanga, nzela ya masuwa na katikati ya mbu, mpe nzela ya mobali ntango azali ná mwasi.”—Mas. 30:18, 19.
Liboso, tokanisaki ete maloba “nzela ya mobali ntango azali ná mwasi” emonisi likambo ya mabe. Mpo na nini? Mpo bavɛrsɛ oyo ezali liboso elobeli makambo ya mabe oyo elobaka ata moke te ete “ekoki.” (Mas. 30:15, 16) Mpe vɛrsɛ 20 elobeli “mwasi ya ekobo” oyo azali koloba ete asali mabe moko te. Na yango, tokanisaki ete ndenge moko na mpongo oyo azali kopumbwa, nyoka likoló ya libanga, to masuwa ya kala na katikati ya mbu, ntango mosusu mobali atikaka elembo te na likambo oyo asali. Na kotalela likanisi wana, tolobaki ete maloba “nzela ya mobali ntango azali ná mwasi” elimboli likambo moko ya mabe—elenge mobali moko ya mayele mabe oyo alɛngɔli elenge mwasi oyo ayebi makambo te mpo asangisa na ye nzoto.
Kasi, tozali na ntina ya komona ete vɛrsɛ yango ezali kolobela likambo ya malamu. Mokomi azalaki kaka kokamwa makambo oyo alobelaki.
Maniskri ya Ebre ya kala emonisi mpe ete vɛrsɛ yango elimboli likambo ya malamu. Buku moko (Theological Lexicon of the Old Testament) elobi ete liloba ya Ebre oyo ebongolami na “ekamwisaka ngai mingi mpenza” na Masese 30:18 “emonisi likambo oyo moto . . . amoni ete elekeli ye, ekoki kosalema te, to ezali malamu mingi.”
Profesɛrɛ Crawford Toy ya iniversite ya Harvard na États-Unis amonisaki mpe ete vɛrsɛ oyo elobeli likambo ya mabe te. Alobaki boye: “Mokomi azalaki nde kolobela ndenge makambo yango ekamwisaka.”
Na yango tokoki mpenza koloba ete maloba oyo ezali na Masese 30:18, 19 elobeli makambo ya malamu mpenza, oyo ekamwisaka mingi mpenza. Ndenge moko na mokomi yango ya Biblia, tokamwaka ndenge mpongo epumbwaka likoló mpenza, ndenge nyoka, nyama oyo ezali na makolo te elekaka na mabanga, mpe ndenge masuwa oyo etondi biloko ekoki kotambola likoló ya mbu, mpe ndenge elenge mobali ná elenge mwasi bakoki kolingana mpe kozala na bomoi ya esengo elongo.