Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 3:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Mpe nazali kokita mpo na kobikisa bango na lobɔkɔ ya Baezipito+ mpe kolongola bango na mokili oyo bámata tii na mokili moko malamu mpe monene, na mokili oyo etondi na miliki mpe na mafuta ya nzoi,+ na mboka ya Bakanana ná Bahiti ná Baamore ná Baperizi ná Bahivi mpe Bayebusi.+

  • Kolimbola Mibeko 8:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Mpo Yehova Nzambe na yo azali kokɔtisa yo na mokili moko malamu,+ mokili moko ya mabwaku ya mikɛli ya mai, ya maziba mpe ya mai mozindo oyo ezali kobima na lobwaku ya patatalu+ mpe na etúká ya ngombangomba,

  • Yosua 5:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Mpo bana ya Yisraele batambolaki mbula ntuku minei (40)+ na esobe, tii ntango ekólo mobimba ya mibali ya etumba oyo babimaki na Ezipito, oyo baboyaki koyoka mongongo ya Yehova basilaki, baoyo Yehova alapaki ndai mpo na bango ete bakomona soki moke te mokili+ oyo Yehova alapelaki bankɔkɔ na bango ete akopesa biso,+ mokili oyo etondi na miliki mpe na mafuta ya nzoi.+

  • Yirimia 11:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 mpo nakokisa ndai oyo nalapelaki bankɔkɔ na bino,+ ya kopesa bango mokili oyo etondi na miliki mpe na mafuta ya nzoi,+ lokola na mokolo ya lelo.’”’”

      Bongo nazongisaki mpe nalobaki ete: “Amen, Ee Yehova.”

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto