8 Na yango, Yehova atikaki motema ya Farao, mokonzi ya Ezipito, ekóma makasi,+ mpe azalaki kolanda bana ya Yisraele, wana bana ya Yisraele bazalaki kobima mabɔkɔ likoló.+
30 Mpe Sihone mokonzi ya Heshibone atikaki tóleka epai na ye te, mpamba te Yehova Nzambe na yo atikaki elimo na ye ekóma makasi+ mpe motema na ye ekóma makasi, mpo na kopesa ye na lobɔkɔ na yo, kaka ndenge ezali na mokolo ya lelo.+
6 Kutu, mpo na nini bokoyeisa mitema na bino makasi ndenge Ezipito ná Farao bayeisaki mitema na bango makasi?+ Ezali te kaka na ntango oyo Ye anyokolaki bango+ nde batikaki bango bákende, mpe bakendaki?+