Kobima 8:8 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 8 Na nsima, Farao abengaki Moize ná Arona mpe alobaki ete: “Bóbondela Yehova+ ete alongola mbemba epai na ngai mpe epai ya bato na ngai, mpo nalingi kotika bato bákende mpo bápesa Yehova mbeka.”+ Kobima 9:28 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 28 Bóbondela Yehova ete bankake mpe mbula ya mabanga+ ya Nzambe esuka wana. Boye nakotika bino bókende, mpe bokotikala awa lisusu te.” 1 Samwele 12:19 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 19 Mpe bato nyonso babandaki koloba na Samwele ete: “Bondelá+ Yehova Nzambe na yo mpo na basaleli na yo, mpo toboyi kokufa; mpamba te tobakisi mabe na masumu na biso nyonso na ndenge tosɛngi mokonzi mpo na biso.” Misala 8:24 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 24 Simo azongisaki ete: “Mibali, bino nde bóbondela Yehova mpo na ngai+ ete ata moko ya makambo oyo bolobi ekómela ngai te.”
8 Na nsima, Farao abengaki Moize ná Arona mpe alobaki ete: “Bóbondela Yehova+ ete alongola mbemba epai na ngai mpe epai ya bato na ngai, mpo nalingi kotika bato bákende mpo bápesa Yehova mbeka.”+
28 Bóbondela Yehova ete bankake mpe mbula ya mabanga+ ya Nzambe esuka wana. Boye nakotika bino bókende, mpe bokotikala awa lisusu te.”
19 Mpe bato nyonso babandaki koloba na Samwele ete: “Bondelá+ Yehova Nzambe na yo mpo na basaleli na yo, mpo toboyi kokufa; mpamba te tobakisi mabe na masumu na biso nyonso na ndenge tosɛngi mokonzi mpo na biso.”
24 Simo azongisaki ete: “Mibali, bino nde bóbondela Yehova mpo na ngai+ ete ata moko ya makambo oyo bolobi ekómela ngai te.”