Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 4:21
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 Mpe Yehova alobaki lisusu na Moize ete: “Nsima ya kokende mpe kozonga na yo na Ezipito, talá malamu ete osala mpenza liboso ya Farao makamwisi nyonso oyo natye na lobɔkɔ na yo.+ Kasi ngai, nakotika motema na ye ekóma makasi;+ mpe akotika bato bákende te.+

  • Kobima 8:32
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 32 Nzokande, Farao akómisaki motema na ye makasi mbala oyo lisusu mpe atikaki bato bákende te.+

  • Kobima 14:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Nde ngai, talá nazali kotika mitema ya Baezipito ekóma makasi,+ mpo bákɔta nsima na bango mpe mpo nazwa nkembo na makambo oyo nakosala Farao ná mampinga na ye nyonso ya basoda, makalo na ye ya bitumba mpe basoda na ye oyo batambolaka na mpunda.+

  • Yosua 11:20
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 Mpo Yehova azalaki kosala boye: kotika mitema na bango ekóma makasi+ mpo báluka bitumba ná Yisraele, bongo ye aboma bango nyonso, mpo amonisela bango boboto te,+ kasi asilisa bango nyɛɛ, ndenge Yehova apesaki Moize mitindo.+

  • 2 Ntango 36:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Mpe atombokelaki kutu Mokonzi Nebukadenezare,+ oyo alapisaki ye ndai na nkombo ya Nzambe;+ mpe azalaki se kokómisa motó na ye makasi+ mpe koyeisa motema na ye makasi+ mpe azongelaki Yehova Nzambe ya Yisraele te.

  • Nzembo 75:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  5 Bótombola liseke na bino na likoló te.

      Bóloba na lofundo te.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto