21 Mpe Yehova azalaki kotambola liboso na bango na moi na kati ya likonzí ya lipata mpo na kokamba bango na nzela,+ mpe na butu na kati ya likonzí ya mɔtɔ mpo na kopesa bango pole mpo na kotambola na moi mpe na butu.+
19 Ntango Kora ayanganisaki liyangani+ mobimba mpo na kotombokela bango na monɔkɔ ya hema ya kokutana, bongo nkembo ya Yehova emonanaki liboso ya liyangani mobimba.+
11 Mpe banganga-nzambe+ bakokaki te kotɛlɛma mpo na kosala mosala+ na bango mpo na lipata yango, mpamba te nkembo+ ya Yehova etondaki na ndako ya Yehova.+