Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Mitángo 14:33
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 33 Mpe bana na bino bakokóma babateli ya mpate na esobe+ mbula ntuku minei (40), mpe basengeli kozongisa monɔkɔ mpo na misala na bino ya pite,+ kino bibembe na bino ekokóma na nsuka na yango na esobe.+

  • Kolimbola Mibeko 29:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 ‘Ntango nakambaki bino na boumeli ya mbula ntuku minei (40) na esobe,+ bilamba na bino ekufaki na nzoto na bino te, mpe sandale na yo ekufaki na lokolo na yo te.+

  • Yosua 5:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Mpo bana ya Yisraele batambolaki mbula ntuku minei (40)+ na esobe, tii ntango ekólo mobimba ya mibali ya etumba oyo babimaki na Ezipito, oyo baboyaki koyoka mongongo ya Yehova basilaki, baoyo Yehova alapaki ndai mpo na bango ete bakomona soki moke te mokili+ oyo Yehova alapelaki bankɔkɔ na bango ete akopesa biso,+ mokili oyo etondi na miliki mpe na mafuta ya nzoi.+

  • Nzembo 95:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Mbula ntuku minei (40) nayokaki libota yango mpii,+

      Bongo nalobaki ete:

      “Bazali bato oyo motema na bango ezali kowayawaya,+

      Mpe bayebi banzela na ngai te”;+

  • Misala 7:36
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 36 Mobali yango abimisaki bango+ nsima ya kosala makamwisi ya komonisa makambo oyo ekoya mpe bilembo na Ezipito+ mpe na Mbu Motane+ mpe na esobe mbula ntuku minei (40).+

  • Misala 13:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 Mpe na eleko ya mbula soki ntuku minei (40)+ akangaki motema na etamboli na bango na esobe.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto