-
Nehemia 10:37Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
37 Lisusu, farini ya liboso ya mbumambuma oyo euti na mbuma na biso ya liboso,+ ná makabo+ na biso, ná mbuma na biso ya nzete ya lolenge nyonso,+ vinyo ya sika+ ná mafuta,+ tosengeli komema yango epai ya banganga-nzambe na bisika ya kolya+ ya ndako ya Nzambe na biso, lisusu moko ya bandambo zomi ya biloko ya mabele na biso epai ya Balevi,+ mpo bango, Balevi, nde bato bazwaka moko ya bandambo zomi na bingumba na biso nyonso oyo misala ya bilanga esalemaka.
-
-
Nehemia 12:44Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
44 Lisusu, batyaki na mokolo yango mibali oyo bazalaki kokamba bandako+ ya kobomba biloko,+ makabo,+ mbuma ya liboso+ mpe moko ya bandambo zomi,+ mpo na kosangisa na kati biloko ya bilanga ya bingumba, biloko oyo esɛngami na mobeko+ mpo na banganga-nzambe mpe Balevi;+ mpamba te esengo ya Yuda ezalaki mpo na banganga-nzambe mpe Balevi+ oyo bazalaki kosala mosala.
-