Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Basambisi 2:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Na yango basundolaki Yehova, Nzambe ya batata na bango, oyo abimisaki bango na mokili ya Ezipito+ mpe babandaki kolanda banzambe mosusu na banzambe ya bato ya bikólo oyo bazalaki zingazinga na bango+ mpe babandaki kogumbamela bango, bongo basilikisaki Yehova.+

  • 1 Bakonzi 9:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Mpe bakoloba: ‘Mpo batikaki Yehova Nzambe na bango oyo abimisaki bankɔkɔ na bango na mokili ya Ezipito,+ mpe bakómaki kokangama na banzambe+ mosusu mpe kogumbamela bango mpe kosalela bango. Yango wana Yehova amemeli bango mpasi oyo nyonso.’”+

  • 2 Bakonzi 17:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Mpe esalemaki bongo mpo bana ya Yisraele basalelaki Yehova Nzambe na bango lisumu,+ ye oyo abimisaki bango na mokili ya Ezipito na lobɔkɔ ya Farao mokonzi ya Ezipito,+ mpe babandaki kobanga banzambe mosusu;+

  • 2 Ntango 7:22
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 22 Mpe bakoloba: ‘Mpo batikaki Yehova+ Nzambe ya bankɔkɔ na bango oyo abimisaki bango na mokili ya Ezipito,+ mpe bakómaki kokangama na banzambe mosusu+ mpe kogumbamela bango mpe kosalela bango.+ Yango wana amemeli bango mpasi oyo nyonso.’”+

  • Yirimia 19:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 mpo batiki ngai+ mpe basali ete esika oyo eyebana lisusu te+ mpe na esika oyo, babimisi milinga ya mbeka epai ya banzambe mosusu oyo bango bayebaki te,+ bango ná bankɔkɔ na bango mpe bakonzi ya Yuda; mpe batondisi esika oyo na makila ya bato oyo bazali na likambo te.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto