Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Balevi 26:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 nakopesa mpenza bino mbula oyo ezali kosopana na ntango na yango,+ mpe mokili ekopesa mpenza mbuma na yango,+ mpe nzete ya elanga ekopesa mbuma na yango.+

  • Kolimbola Mibeko 28:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Yehova akofungolela yo ndako na ye malamu ya kobomba biloko, elingi koloba likoló, mpo na kopesa mbula na mokili na yo na eleko na yango+ mpe mpo na kopambola mosala nyonso ya lobɔkɔ na yo;+ mpe okodefisa mpenza bikólo mingi, nzokande yo okodefa te.+

  • Nzembo 65:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Banzela ya mikala na yango ezali kopɔlisama na mai, mabele na yango oyo ekangamakangamá ezali kolalisama;+

      Ozali kolɛmbisa yango na mbula monene; ozali kopambola milona na yango ya sika.+

  • Yisaya 30:23
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 23 Mpe akopesa mpenza mbula mpo na momboto na yo oyo ozali kolona na mabele,+ mpe mbuma ya mabele nde mampa, oyo ekokóma mpenza na mafuta mpe ekozala mafutamafuta.+ Na mokolo yango, bibwɛlɛ na yo ekolya na esika monene ya kolya matiti.+

  • Yirimia 14:22
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 22 Na bikeko ya mpamba+ ya bikólo ezali nde na moko oyo ekoki konɔkisa mbula, to likoló yango moko ekoki nde kopesa mbula monene?+ Yo ozali Ye te, Ee Yehova Nzambe na biso?+ Mpe tozali kolikya epai na yo, mpo yo moko nde osali biloko oyo nyonso.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto