Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Balevi 23:40
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 40 Mpe na mokolo ya liboso, bosengeli kozwa mbuma ya nzete ya kitoko, mandalala+ mpe bitape ya nzete oyo ezali na nkasa mingi mpe nzete ya arava ya lobwaku ya mokɛli, mpe bosengeli kosepela+ liboso ya Yehova Nzambe na bino mikolo nsambo.

  • Kolimbola Mibeko 12:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Mpe bosengeli kosepela liboso ya Yehova Nzambe+ na bino, bino ná bana na bino ya mibali ná bana na bino ya basi ná baombo na bino ya mibali ná baombo na bino ya basi mpe Molevi oyo azali na kati ya baporte na bino, mpo azali na likabo te to na libula te elongo na bino.+

  • Kolimbola Mibeko 26:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Mpe osengeli kosepela+ mpo na bolamu nyonso oyo Yehova Nzambe na yo apesi yo ná bato ya ndako na yo, yo ná Molevi mpe moto oyo afandi mopaya epai na yo.+

  • Nehemia 8:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Mpe alobaki na bango lisusu ete: “Bókende, bólya biloko ya mafutamafuta mpe bómɛla masanga ya elɛngi, mpe bótinda biloko+ epai ya moto oyo babongiseli eloko moko te; mpo lelo ezali mokolo mosantu na miso ya Nkolo na biso, mpe bóyoka mpasi na motema te, mpo esengo ya Yehova ezali esika makasi ya libateli na bino.”

  • Nehemia 8:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Na yango lisangá mobimba ya baoyo bautaki na bokangami basalaki mwa bandako ya matiti mpe bafandaki na mwa bandako yango ya matiti; mpo bana ya Yisraele basalaki naino ndenge wana te banda na mikolo ya Yosua mwana ya Nunu+ tii na mokolo yango, bongo basepelaki mingi mpenza.+

  • Mosakoli 5:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 Talá! Eloko ya malamu koleka oyo ngai namoni, oyo ezali kitoko, ezali nde ete moto alya mpe amɛla mpe amona bolamu mpo na mosala na ye makasi+ oyo azali kosala yango makasi na nse ya moi mpo na mikolo nyonso ya bomoi na ye oyo Nzambe ya solo apesi ye, mpo yango nde mbano na ye.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto