-
Nzembo 52:maloba ya ebandeli ya loyembo-9Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
Epai ya mokambi ya nzembo. Maskile. Ya Davidi, ntango Doege Moedome ayaki koyebisa Saulo mpe koloba na ye ete Davidi akendaki na ndako ya Ahimeleke.+
52 Ee yo moto ya nguya, mpo na nini ozali komikumisa na likambo oyo ezali mabe?+
Motema boboto ya Nzambe ezali mokolo mobimba.+
5 Mpe Nzambe ye moko akobuka yo mpo na seko;+
Akobwaka yo na nse mpe akolongola yo na hema na yo,+
Mpe akopikola yo mpenza na mokili ya bato ya bomoi.+ Sela.
7 Talá mobali makasi oyo azali te kotya Nzambe azala ndako na ye ya makasi,+
Kasi oyo azali kotya motema nde na ebele ya bomɛngo na ye,+
Oyo azali koluka libateli na kati ya minyoko oyo ye abimisi.+
-