-
Nzembo 53:maloba ya ebandeli ya loyembo-6Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
Epai ya mokambi ya nzembo mpo na Mahalate.+ Maskile. Ya Davidi.
53 Zoba alobi na motema na ye ete:
“Yehova azali te.”+
Babebisi makambo mpe basali makambo na ndenge ya bosɔtɔ na kozanga boyengebene;+
Ata moto moko te azali kosala malamu.+
2 Kasi uta na likoló, Nzambe azali kotala bana ya bato,+
Mpo na komona soki ezali na moto oyo azali na mayele ya kososola, moto oyo azali koluka Yehova.+
3 Bango nyonso bazongi nsima, bango nyonso mpe babebi;+
Ata moto moko te azali kosala malamu,+
Ata moko te.
4 Bato nyonso oyo basalaka makambo oyo eyokisaka mpasi bazwi nde boyebi te,+
Bazali nde kolya bato na ngai ndenge balyaka limpa?+
Babeleli kutu Yehova te.+
-