Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Samwele 18:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Mpe Yonatane ná Davidi basalaki kondimana,+ mpamba te alingaki ye lokola molimo na ye moko.+

  • 1 Samwele 20:42
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 42 Mpe Yonatane alobaki lisusu na Davidi boye: “Kende na kimya,+ mpo tolapaki ndai,+ biso mibale, na nkombo ya Yehova ete: ‘Yehova ye moko azala kati na ngai ná yo mpe kati na bana na ngai mpe bana na yo, mpo na ntango oyo etyami ndelo te.’”+

      Na yango, Davidi atɛlɛmaki mpe asimbaki nzela akei, mpe Yonatane akɔtaki na engumba.

  • 1 Samwele 22:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Mpo bino nyonso bosaleli ngai likita; mpe moto moko te azali koyebisa ngai yango na litoi,+ ntango mwana na ngai moko azali kosala kondimana+ ná mwana ya Yese, mpe ata moto moko te kati na bino azali koyokela ngai mawa mpe koyebisa yango na litoi na ngai ete mwana na ngai moko akómisi mosaleli na ngai moto oyo azali kotyela ngai mitambo, ndenge ezali lelo oyo.”

  • 2 Samwele 21:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Nzokande, mokonzi ayokelaki Mefiboshete+ mwana ya Yonatane mwana ya Saulo mawa, mpo na ndai+ ya Yehova oyo ezalaki kati na bango, kati na Davidi ná Yonatane mwana ya Saulo.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto