Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Nzembo 18:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  6 Na mpasi na ngai nazalaki kobelela Yehova,

      Mpe nazalaki kolelela Nzambe na ngai mpo na kosɛnga lisalisi.+

      Na tempelo na ye ayokaki mongongo na ngai,+

      Mpe sikoyo kolela na ngai liboso na ye mpo na kosɛnga lisalisi ekómaki na matoi na ye.+

  • Nzembo 27:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 27 Yehova azali pole+ na ngai mpe lobiko na ngai.+

      Nakobanga nani?+

      Yehova azali esika makasi ya libateli ya bomoi na ngai.+

      Nakozala na nsɔmɔ ya nani?+

  • Nzembo 31:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 31 Ee Yehova, nakimi epai na yo.+

      Ee nayoka nsɔni ata moke te.+

      Na boyengebene na yo, bikisá ngai.+

  • Nzembo 31:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  9 Ee Yehova, moniselá ngai boboto mpo makambo eyeli ngai ndongo.+

      Liso na ngai elɛmbi na mpasi,+ molimo na ngai ná libumu na ngai.+

  • Nzembo 34:19
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 19 Bampasi ya moyengebene ezali mingi,+

      Kasi Yehova abikisaka ye na yango nyonso.+

  • Nzembo 43:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  5 Ee molimo na ngai, mpo na nini ozangi elikya,+

      Mpe mpo na nini ozali kosala yikiyiki na kati na ngai?

      Zelá Nzambe,+

      Mpo nakokumisa ye lisusu, azali lobiko monene na ngai mpe azali Nzambe na ngai.+

  • Nzembo 56:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  4 Lokola nazali na bomoko na Nzambe, nakosanzola liloba na ye.+

      Natyeli Nzambe motema na ngai; nakobanga te.+

      Moto* akoki kosala ngai nini?+

  • Nzembo 143:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  5 Nakanisi mikolo ya kalakala;+

      Namanyoli mosala na yo mobimba;+

      Nasepelaki komibanzabanza ntango nyonso mpo na mosala ya mabɔkɔ na yo.+

  • Masese 18:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Nkombo ya Yehova ezali ndako molai ya makasi.+ Moyengebene akimaka mpo na kokɔta kuna mpe azwaka libateli.+

  • Habakuku 3:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 Ata bongo, ngai nakosepela makasi na Yehova ye moko,+ nakozala na esengo na Nzambe ya lobiko na ngai.+

  • Luka 22:43
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 43 Bongo anzelu moko autaki na likoló abimeli ye mpe alendisi ye.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto