Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Mitángo 27:21
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 Mpe liboso ya Eleazare nde akotɛlɛma, mpe asengeli kotunela+ ye ndenge Urime+ ekokata likambo liboso ya Yehova. Na etinda na ye bakobima mpe na etinda na ye bakokɔta, ye ná bana nyonso ya Yisraele elongo na ye mpe liyangani mobimba.”

  • Basambisi 18:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Na yango, balobaki na ye ete: “Tobondeli yo, tuná+ Nzambe+ mpo tóyeba soki nzela oyo tozali kokende ekozala malamu.”

  • Basambisi 20:28
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 28 Nzokande Finease,+ mwana ya Eleazare, mwana ya Arona, azalaki kotɛlɛma liboso na yango na mikolo wana+ mpe alobaki boye: “Nabima lisusu mpo na kobunda na bana ya ndeko na ngai Benyamina to natika?”+ Na yango, Yehova alobaki boye: “Matá, mpamba te lobi nakopesa ye na lobɔkɔ na yo.”+

  • 1 Samwele 23:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Mpe Davidi atunaki+ Yehova ete: “Nakende, mpe naboma Bafilistia?” Bongo Yehova alobaki na Davidi boye: “Kende, bomá Bafilistia mpe bikisá Keila.”

  • 1 Samwele 23:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Bankolo-mabele ya Keila bakokaba ngai na lobɔkɔ na ye? Saulo akokita mpenza, ndenge mosaleli na yo ayoki? Ee Yehova Nzambe ya Yisraele, nabondeli yo, yebisá mosaleli na yo.” Na yango, Yehova alobaki boye: “Akokita.”+

  • 1 Samwele 28:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Atako Saulo azalaki kotuna Yehova,+ Yehova azalaki koyanola ye ata moke te,+ ezala na bandɔtɔ,+ to na Urime,+ to na basakoli.+

  • Masese 3:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Tyelá Yehova motema na yo mobimba+ mpe kondimela mayele na yo moko te.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto