Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Basambisi 7:22
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 22 Mpe bato yango nkama misato+ (300) bazalaki se koyula maseke,+ mpe Yehova asalaki ete mopanga ya moto na moto etɛmɛla moninga na ye na kati ya kaa mobimba;+ mpe bato ya kaa yango bazalaki kokima se kokima tii na Bete-shita, kolanda epai Zerera ezali, tii na pembenipembeni ya Abele-mehola,+ pene na Tabate.

  • 2 Ntango 20:23
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 23 Mpe bana ya Amone ná Moabe batɛlɛmaki kobunda na bato oyo bafandaka na etúká ya ngombangomba ya Seire+ mpo báboma bango mpe básilisa bango nyɛɛ; mpe ntango kaka basilisaki bato oyo bafandaka na Seire, basalisanaki mpo moto na moto aboma moninga.+

  • Yisaya 19:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 “Mpe nakotinda Baezipito bándongwana na Baezipito, mpe bakobunda mpenza moto na moto na ndeko na ye, mpe moto na moto na moninga na ye, engumba ná engumba, bokonzi ná bokonzi.+

  • Ezekiele 38:21
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 “‘Mpe na etúká na ngai mobimba ya ngombangomba, nakobenga mopanga mpo na kobundisa ye,’ yango nde liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso.+ ‘Mopanga ya moto na moto ekobalukela ndeko na ye moko.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto