Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Samwele 14:49
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 49 Mpe bana mibali ya Saulo ezalaki Yonatane,+ Yishivi ná Malaki-shua,+ bongo bankombo ya bana na ye mibale ya basi yango oyo: nkombo ya oyo ya liboso Merabe+ mpe nkombo ya oyo ya leki Mikale.+

  • 1 Samwele 19:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Na nsima, Saulo atindaki bamemi-nsango+ na ndako ya Davidi mpo bákɛngɛla yango mpe báboma ye na ntɔngɔ;+ kasi Mikale, mwasi na ye, ayebisaki Davidi boye: “Soki okobikisa molimo na yo na butu oyo te, lobi okobomama.”

  • 1 Samwele 25:44
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 44 Nzokande Saulo apesaki Mikale,+ mwana na ye, mwasi ya Davidi, epai ya Palati+ mwana ya Laishe, oyo azalaki moto ya Galime.+

  • 2 Samwele 3:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Na yango, Davidi alobaki boye: “Malamu! Ngai nakosala kondimana ná yo. Ezali kaka na likambo moko oyo nazali kosɛnga yo ete: ‘Okoki komona elongi+ na ngai te, lobá kaka soki omemi liboso Mikale,+ mwana mwasi ya Saulo, ntango okoya komona elongi na ngai.’”

  • 2 Samwele 6:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Mpe esalemaki boye: ntango sanduku ya Yehova ekɔtaki na Sité ya Davidi, Mikale+ mwana mwasi ya Saulo, atalaki na nse, na lininisa, mpe amonaki Mokonzi Davidi azali kopumbwapumbwa mpe kobina na kozunguluka liboso ya Yehova; bongo abandaki kotyola+ ye na motema.+

  • 1 Ntango 15:29
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 29 Mpe esalemaki boye: ntango sanduku ya kondimana+ ya Yehova ekómaki na Sité ya Davidi, Mikale,+ mwana mwasi ya Saulo, atalaki na nse, na lininisa, mpe amonaki Mokonzi Davidi azali kopumbwapumbwa mpe kosepela;+ bongo abandaki kotyola+ ye na motema.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto