Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Samwele 18:20
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 Nzokande Mikale,+ mwana mwasi ya Saulo, azalaki kolinga Davidi, mpe bayaki koyebisa Saulo likambo yango, mpe asepelaki na yango.

  • 1 Samwele 18:27
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 27 Na yango, Davidi atɛlɛmaki, ye ná bato na ye mpe babomaki+ kati na Bafilistia mibali nkama mibale (200), mpe Davidi ayaki na misutu+ na bango mpe apesaki yango nyonso epai ya mokonzi, mpo na kosala kondimana ya libala elongo na mokonzi. Bongo Saulo apesaki ye Mikale mwana na ye.+

  • 1 Samwele 19:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Na nsima, Saulo atindaki bamemi-nsango+ na ndako ya Davidi mpo bákɛngɛla yango mpe báboma ye na ntɔngɔ;+ kasi Mikale, mwasi na ye, ayebisaki Davidi boye: “Soki okobikisa molimo na yo na butu oyo te, lobi okobomama.”

  • 1 Samwele 25:44
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 44 Nzokande Saulo apesaki Mikale,+ mwana na ye, mwasi ya Davidi, epai ya Palati+ mwana ya Laishe, oyo azalaki moto ya Galime.+

  • 1 Ntango 15:29
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 29 Mpe esalemaki boye: ntango sanduku ya kondimana+ ya Yehova ekómaki na Sité ya Davidi, Mikale,+ mwana mwasi ya Saulo, atalaki na nse, na lininisa, mpe amonaki Mokonzi Davidi azali kopumbwapumbwa mpe kosepela;+ bongo abandaki kotyola+ ye na motema.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto