-
Kolimbola Mibeko 9:5Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
5 Ezali te mpo na boyengebene+ na yo to mpo na bosembo ya motema+ na yo nde ozali kokɔta kozwa mokili na bango; ɛɛ, ezali mpo na mabe ya bikólo yango nde Yehova Nzambe na yo azali kobengana yango liboso na yo,+ mpe mpo na kokokisa liloba oyo Yehova alapaki ndai epai ya bankɔkɔ na yo, Abrahama,+ Yisaka+ mpe Yakobo.+
-
-
Yosua 23:14Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
14 “Sikoyo, talá! Nazali lelo kokende na nzela ya bato nyonso,+ mpe boyebi malamu na mitema na bino nyonso mpe na milimo na bino nyonso ete na maloba nyonso ya malamu oyo Yehova Nzambe na bino alobaki na bino, ata liloba moko te ezangaki kokokisama. Yango nyonso ekokisamaki mpo na bino. Ata liloba moko te ezangaki kokokisama.+
-