5 mpamba te Davidi asalaki oyo ezali sembo na miso ya Yehova, mpe mikolo nyonso ya bomoi na ye,+ apɛngwaki na eloko moko te oyo Ye apesaki ye mitindo, longola kaka na likambo ya Uriya Mohiti.+
19 Yo nde ozali monene na toli+ mpe monene na misala,+ yo oyo miso efungwami likoló ya banzela nyonso ya bana ya bato,+ mpo na kopesa na mokomoko na kolanda mbuma ya misala na ye;+
13 Mpe ezali na ekelamu moko te oyo ezangi komonana polele na miso na ye,+ kasi biloko nyonso ezali bolumbu mpe ezali komonana polele na miso ya moto oyo tokozongisa monɔkɔ epai na ye.+