-
Nzembo 18:maloba ya ebandeli ya loyembo-50Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
Epai ya mokambi ya nzembo. Ya mosaleli ya Yehova, ya Davidi, oyo alobaki na Yehova maloba ya loyembo oyo na mokolo oyo Yehova abikisaki ye na lobɔkɔ ya banguna na ye nyonso mpe na lobɔkɔ ya Saulo.+ Bongo alobaki ete:
18 Nakolinga yo, Ee Yehova makasi na ngai.+
2 Yehova azali libanga na ngai, esika makasi ya libateli na ngai mpe Mobikisi na ngai.+
Nzambe na ngai azali libanga na ngai. Nakokima epai na ye,+
Nguba na ngai mpe liseke na ngai ya lobiko, esika na ngai ya kobombana oyo etombwaná.+
4 Bansinga ya liwa ezingaki ngai;+
Bato ya mpambampamba oyo basopanaki lokola mpela ya pwasa bazalaki mpe kopesa ngai nsɔmɔ.+
6 Na mpasi na ngai nazalaki kobelela Yehova,
Mpe nazalaki kolelela Nzambe na ngai mpo na kosɛnga lisalisi.+
Na tempelo na ye ayokaki mongongo na ngai,+
Mpe sikoyo kolela na ngai liboso na ye mpo na kosɛnga lisalisi ekómaki na matoi na ye.+
7 Bongo mabele ekómaki koningana epai na epai mpe kolɛnga,+
Mpe miboko ya bangomba eninganaki,+
Mpe eninganaki epai na epai mpo bayokisaki ye nkanda.+
8 Molinga emataki na zolo na ye, mpe mɔtɔ oyo ezalaki kobima na monɔkɔ na ye ezalaki kozikisa;+
Makala ya mɔtɔ oyo ezalaki kopela eutaki na ye.
10 Bongo ayaki likoló ya keruba moko mpe ayaki, azali kopumbwa,+
Mpe ayaki, azali kopumbwa mbangu mpenza likoló ya mapapu ya elimo moko.+
11 Bongo asalaki molili esika na ye ya kobombana,+
Zingazinga na ye lokola mwa ndako na ye ya matiti,
Mai ya moindo, mapata minene.+
12 Na kongɛnga oyo ezalaki liboso na ye, mapata na ye ezalaki koleka,+
Mbula ya mabanga ná makala ya mɔtɔ oyo ezalaki kopela.+
13 Mpe na likoló Yehova abandaki konguluma lokola nkake,+
Mpe Ye Oyo-Aleki-Likoló ye moko abandaki koyokisa mongongo na ye,+
Mbula ya mabanga ná makala ya mɔtɔ oyo ezalaki kopela.
14 Mpe azalaki kotinda makula na ye, mpo apanza bango;+
Mpe atindaki mikalikali, mpo atya bango na mobulu.+
15 Mpe nse ya mai ekómaki komonana polele,+
Mpe miboko ya mabele oyo ebotaka ekómaki komonana+
Na mpamela na yo, Ee Yehova, na mpema oyo ebimi na zolo na yo.+
16 Uta na likoló azalaki kotinda lobɔkɔ na ye, azalaki kozwa ngai,+
Azalaki kobimisa ngai na mai minene.+
17 Azalaki kobikisa ngai na mabɔkɔ ya monguna na ngai ya makasi,+
Mpe na mabɔkɔ ya baoyo bayinaka ngai; mpamba te balekaki ngai na makasi.+
19 Mpe abimisaki ngai, atyaki ngai na esika moko monene;+
Azalaki kobikisa ngai, mpamba te asepelaki na ngai.+
20 Yehova azali kopesa ngai mbano na kolanda boyengebene na ngai;+
Azali kofuta ngai mpo mabɔkɔ na ngai ezali pɛto.+
22 Mpo bikateli na ye nyonso ya lisambisi ezali liboso na ngai,+
Mpe nakolongola mibeko na ye epai na ngai te.+
24 Mpe tiká Yehova afuta ngai na kolanda boyengebene na ngai,+
Mpo mabɔkɔ na ngai ezali pɛto na miso na ye.+
25 Epai ya moto ya sembo okozala sembo;+
Epai ya mobali makasi oyo azali na mbeba te, okosala na mbeba te;+
26 Epai ya moto oyo azali pɛto, okomimonisa pɛto;+
Kasi epai ya moto oyo atɛngamá, okomonisa ete ozalaka mbilingambilinga;+
29 Mpamba te na lisalisi na yo, napotaka mbangu mpo na kobunda na etuluku ya bapunzi;+
Mpe na lisalisi ya Nzambe na ngai, namataka efelo.+
30 Nzela ya Nzambe ya solo ezali ya kokoka;+
Liloba ya Yehova ezali pɛto.+
Azali nguba ya baoyo nyonso bazali kokima epai na ye.+
32 Nzambe ya solo nde Moto azali kokanga ngai loketo na nguya ya bomoi,+
Mpe akosala ete nzela na ngai ezala ya kokoka,+
33 Azali kokómisa makolo na ngai lokola oyo ya banyama ebengami bishe,+
Mpe azali kotɛlɛmisa ngai na bisika oyo ezali likoló na miso na ngai.+
35 Mpe okopesa ngai nguba na yo ya lobiko,+
Mpe lobɔkɔ na yo ya mobali ekosunga ngai,+
Mpe komikitisa na yo ekokómisa ngai moto monene.+
36 Okobongisela matambe na ngai esika moko monene ya konyata,+
Mpe makɛsi na ngai ekolɛngalɛnga ata moke te.+
39 Mpe okolatisa ngai nguya na loketo mpo na etumba;
Okokweisa na nse na ngai baoyo bazali kotɛmɛla ngai.+
40 Ya solo, banguna na ngai, okopesa ngai nkingo na bango;+
Mpe baoyo bayinaka ngai makasi, nakokangisa bango monɔkɔ.+
41 Bazali kobelela mpo na kosɛnga lisalisi, kasi mobikisi azali te,+
Epai ya Yehova, kasi azali koyanola bango ata moke te.+
42 Mpe nakotuta bango mikemike lokola putulu liboso ya mopɛpɛ;+
Lokola pɔtɔpɔtɔ ya babalabala, nakosopa bango.+
43 Okobikisa ngai na mabɔkɔ ya bato oyo bazali kolukaluka mabunga.+
Okotya ngai mokonzi ya bikólo.+
Bato oyo nayebaki te, bakosalela ngai.+
47 Nzambe ya solo azali Moto oyo azali kozongisa mabe mpo na ngai;+
Mpe ye azali kotya bato ya bikólo na nse na ngai.+
-