Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 12:31
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 31 Osengeli kosalela Yehova Nzambe na yo ndenge wana te,+ mpo eloko nyonso oyo Yehova ayini, oyo ye ayinaka mpenza, bato ya bikólo wana basalelaki yango banzambe na bango, mpo kutu bato ya bikólo yango bazali mbala na mbala kozikisa na mɔtɔ bana na bango ya mibali mpe bana na bango ya basi mpo na banzambe na bango.+

  • 1 Bakonzi 11:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Na ntango yango nde Salomo atongaki esika oyo etombwaná+ mpo na Kemoshe+ eloko ya bosɔtɔ+ ya Moabe, na ngomba+ oyo etalani+ na Yerusaleme, mpe mpo na Moleke eloko ya bosɔtɔ ya bana ya Amone.

  • 2 Bakonzi 17:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 mpe bazalaki kolekisa bana na bango ya mibali mpe bana na bango ya basi mbeka na mɔtɔ+ mpe kosakola makambo oyo ebombaná+ mpe koluka bilembo ya makambo oyo ekoya,+ mpe bazalaki se komitɛka+ mpo na kosala oyo ezali mabe na miso ya Yehova, mpo na kosilikisa+ ye;

  • 2 Ntango 28:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Mpe abimisaki milinga ya mbeka+ na lobwaku ya mwana ya Hinome+ mpe akómaki kotumba bana na ye+ na mɔtɔ, na kolanda makambo oyo eyinamá+ ya bikólo oyo Yehova abenganaki liboso ya bana ya Yisraele.+

  • Nzembo 106:37
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 37 Mpe bazalaki kokaba bana na bango ya mibali+

      Mpe bana na bango ya basi mbeka epai ya bademo.+

  • Yirimia 7:31
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 31 Mpe batongi bisika oyo etombwaná ya Tofete,+ oyo ezali na lobwaku ya mwana ya Hinome,+ mpo na kotumba bana na bango ya mibali mpe bana na bango ya basi na mɔtɔ,+ likambo oyo napesaki mitindo te mpe oyo eyaki na kati ya motema na ngai te.’+

  • Ezekiele 16:20
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 “‘Mpe ozalaki kokamata bana na yo ya mibali mpe bana na yo ya basi oyo obotelaki ngai,+ mpe ozalaki kopesa bango mbeka epai ya bikeko yango mpo bályama+—misala na yo ya bondumba ekosuka te?

  • 1 Bakorinti 10:20
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 Te; kasi nazali nde koloba ete biloko oyo bikólo bapesaka mbeka, bapesaka yango mbeka na bademo,+ kasi na Nzambe te; mpe ngai nalingi te ete bósangana na bademo.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto