7 Na nsima, asalaki bitɛlɛmiselo ya miinda+ ya wolo; yango zomi ezalaki motindo moko,+ mpe atyaki yango na tempelo, mitano na lobɔkɔ ya mobali mpe mitano na lobɔkɔ ya mwasi.+
10 Mpe na ebandeli+ ya mbula, Mokonzi Nebukadenezare atindaki+ bato mpe bakendaki na ye na Babilone+ elongo na biloko kitoko ya ndako ya Yehova.+ Lisusu, akómisaki Zidikiya+ ndeko ya tata na ye mokonzi ya Yuda mpe ya Yerusaleme.+
3 Na mbula mibale mpenza nakozongisa na esika oyo bisaleli nyonso ya ndako ya Yehova oyo Nebukadenezare mokonzi ya Babilone+ azwaki na esika oyo mpo amema yango na Babilone.’”
2 Vinyo etindaki+ Beleshazare aloba ete báya na bambɛki ya wolo mpe ya palata+ oyo tata na ye Nebukadenezare alongolaki na tempelo oyo ezalaki na Yerusaleme, mpo mokonzi ná bato minene na ye, bamakango na ye mpe basi na ye mosusu bámɛla na yango.+