13 Na nsima, abimisaki wana biloko nyonso ya motuya ya ndako ya Yehova mpe biloko ya motuya ya ndako ya mokonzi,+ mpe akatakataki bisaleli nyonso ya wolo+ oyo Salomo mokonzi ya Yisraele asalaki na tempelo ya Yehova, ndenge Yehova alobaki.
16 Mpe nalobaki na banga-nga-nzambe mpe na bato nyonso oyo ete: “Talá oyo Yehova alobi: ‘Bóyoka maloba ya basakoli na bino te oyo bazali kosakwela bino ete: “Talá! Etikali moke sikoyo, bisaleli ya ndako ya Yehova ezongisama uta na Babilone!”+ Mpo bazali kosakwela bino lokuta.+
2 Na nsima, Yehova akabaki Yehoyakime mokonzi ya Yuda+ ná ndambo ya bisaleli+ ya ndako ya Nzambe ya solo na lobɔkɔ na ye, bongo amemaki yango na mokili ya Shineare+ na ndako ya nzambe na ye; mpe amemaki bisaleli yango na ndako ya kobomba biloko ya motuya ya nzambe na ye.+